Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:55

[1] Awa Kristo andimaki komona pasi, bino pe bóndima komona pasi na molende nyonso. Pamba té moto oyo asi'ayoki pasi, ye nde moto aboyá masumu libela.

[2] Boye na tango oyo bokotikala awa na mokili, bótika kolanda baposa ya bomoto, kasi bózalaka na bizaleli oyo Nzambe alingaka.

[3] Pamba té, bosi'bobebisi tango mingi po na kolandaka makambo esepelisaka bato oyo bayebi Nzambe té. Bozalaki kosala kindumba, kondima baposa ya mabe, kolangwa masanga, kolia pe komela na lokoso mingi koleka, pe kobebisa lokumu na bino na ndenge bozalaki kosambela banzambe ya lokuta.

[4] Kasi sik'oyo bato oyo bayebi Nzambe té bakómi kokamwa pe kofinga bino, lokola bozali kosangana ná bango lisusu té po na kosala makambo wana ya mobulu.

[5] Nzokande mokolo ezali bakosamba po na yango nyonso, pamba té etikali moke Nzambe áya kokata makambo ya bato nyonso, baoyo bazali na bomoi, ná baoyo bakufá.

[6] Po na yango, Kristo asakolaki Sango Malamu na bato bakufá; oyo biso tolobaka 'tè Nzambe akatelaki bango etumbu, tango bazalaki nanu na mokili. Kristo asalaki boye po bákoka kozwa bomoi ya molimo ndenge Nzambe alingi.

[7] Suka ya makambo nyonso ekómi penepene. Yango wana, bózala bato ya mayele pe ya ekenge, po 'tè bókoka kobondela Nzambe.

[8] Likambo eleki tina, yango oyo: bólinganaka mingi penza; pamba té, bato oyo bazali kolingana, Nzambe alimbisaka bango masumu atako ezali ebele.

[9] Bóyambaka bandeko na bandako na bino, bóyimayimaka té.

[10] Bolamu oyo Nzambe apesaka ezali ya ndenge na ndenge; bósalelaka yango na ndenge ekoki. Pamba té, Nzambe apesaka moto na moto ya ye likabo; bósalelaka yango po na bolamu ya baninga.

[11] Moto oyo asakolaka, ásakola bobele maloba ya Nzambe. Moto oyo asalisaka bandeko, ásalela bobele nguya oyo Nzambe apesi ye. Boye na makambo nyonso oyo bosalaka, Nzambe akozwa lokumu po na Yezu Kristo. Pamba té, lokumu pe nguya nyonso ezali ya ye seko! Amen.

[12] Bandeko ya bolingo, bókamwa té po bozali komona bapasi mingi; bókanisa té 'tè bozali kaka bino moko,

[13] kasi bósepela po bozali komona pasi ná Kristo. Na ndenge wana bokosepela mingi koleka, tango ye akomonana na lokumu.

[14] Esengo na bino, soki bafingaka bino po na kombo ya Kristo, pamba té Molimo ya Nzambe oyo akoteli bino na mitema, azali Molimo ya Lokumu.

[15] Bókeba po moto moko té na kati na bino ázwa etumbu po asali makambo ya mabe, lokola koboma moto, koyiba biloko, to kokota na makambo oyo etali yo té.

[16] Nzokande soki moto amoni pasi po azali mokristo, áyoka soni té, kasi ápesa Nzambe mersi, po kombo wana ya mokristo ezali kombo ya lokumu.

[17] Tango ekoki, po Nzambe ábanda kokata makambo ya bato; akosambisa liboso bato na ye. Bongo soki biso tosambi liboso, bato oyo baboyi kondima Sango Malamu ya Nzambe bakosuka ndenge nini?

[18] “Soki bato ya malamu babiki na pasi penza, ekozala ndenge nini po na bato ya mabe pe ya masumu?”

[19] Yango wana baoyo bazali komona pasi po Nzambe alingi boye, básalaka se makambo ya malamu pe bámipesa mobimba na Nzambe oyo asalá biloko nyonso. Ye akobosana bango té.

1 Piere — Chapters