Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:55

[1] Mbote na bino bato bozali na bondimi ya talo penza, ndenge moko lokola biso. Yango ezali likabo ya tina koleka; bozwi yango po na bolingo ya Nzambe pe Yezu Kristo, Mobikisi na biso. Ngai Simon Piere, mosali pe ntoma ya Yezu Kristo, moto natindeli bino mokanda oyo.

[2] Awa boyebi Nzambe pe Yezu, Nkolo na biso, bózwa bolamu pe boboto mingi.

[3] Na nguya na ye ya Nzambe, Yezu apesi biso nyonso oyo ekoki po tósepelisa Nzambe na bomoi na biso mobimba. Ye moto abengi biso pe asali 'tè tóyeba ye; alakisi biso lokumu pe bolamu na ye,

[4] pe apesi biso bilaka ya tina penza. Ya solo, apesi bino nzela po bósangana na bomoi na ye ya Nzambe, pe bóbika na liwa oyo ekweelaka bato nyonso po na baposa na bango ya mabe.

[5] Lokola bosi'bondimeli Nzambe, bózala pe na bizaleli ya malonga, bókóma bato ya mayele,

[6] bóyeba komibatela pe kokanga motema, bómipesa na Nzambe,

[7] bósalisanaka pe bólinganaka.

[8] Soki bokómi kokokisa makambo wana nyonso, bokoyeba Nkolo na biso Yezu Kristo malamu; bokozala kobimisa misala ya malamu kasi ya pamba té.

[9] Kasi moto oyo azangá makambo wana azali lokola moto akufá miso; abosani 'tè Nzambe asi'alongolá masumu na ye ya kala.

[10] Boye bandeko, bótia lisusu molende penza po na kondimela Nzambe oyo abengaki pe aponaki bino. Soki bosali ndenge wana, bokokweya na mabe ata moke té,

[11] pe Nzambe akokómisa bino bato ya mboka ya seko, ya Yezu Kristo oyo azali Nkolo pe Mobikisi na biso.

[12] Yango wana, nakolemba té po na kozongela makambo oyo bosi'boyebá, ata bolandaka malamu makambo ya solo oyo bosi'bozwá.

[13] Kasi namoni 'tè ebongi nálamusaka bino pe nákebisaka bino tii liwa na ngai.

[14] Pamba té etikali moke nákufa, ndenge Nkolo na biso Yezu Kristo ayebisaki ngai.

[15] Bongo nakosala nyonso 'tè sima ya liwa na ngai bókoka kobatela makambo oyo.

[16] Tango toyebisaká bino 'tè Nkolo na biso Yezu Kristo akoya na nguya na ye, tolandaki masolo ya pamba té oyo eutaka na mayele ya bato; kasi biso moko tomonaki nkembo na ye na miso,

[17] tango Nzambe Tata ya nkembo nyonso akumisaki ye pe alobaki boye: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo; nazali na esengo mingi po na ye.”

[18] Biso moko toyokaki mongongo oyo eutaki na Likolo tango tozalaki na ye, na ngomba ya bosantu.

[19] Tokoki pe kotia motema penza na maloba oyo baprofete basakolaká. Ebongi bókamata yango lokola mwinda oyo ezali kopela na esika ya molili, tii tongo ekotana pe monzoto ya tongo ekobima na motema na bino.

[20] Mama ya likambo yango oyo: moto moko té akoki kolimbola na makanisi na ye moko maloba oyo baprofete bakòmaká.

[21] Pamba té profete moko té asi'asakolá na makanisi na ye moko; soki bato bazalaki koloba na kombo ya Nzambe, ezalaki bobele na lisalisi ya Molimo Mosantu.

2 Piere — Chapters