Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:40

[1] Moto nyonso oyo andimi 'tè Yezu azali Mesia, azali Mwana ya Nzambe. Moto nyonso oyo alingi Tata, alingi pe bana na ye.

[2] Toyebaka 'tè tozali kolinga bana ya Nzambe bobele soki tozali kolinga Nzambe pe kotosa mibeko na ye.

[3] Pamba té kolinga Nzambe ezali kotosa mibeko na ye. Mibeko na ye ezali penza pasi mingi té po na biso;

[4] mwana nyonso ya Nzambe alongaka mabe ya mokili. Biso, na bondimi na biso tosi'tolongi.

[5] Bobele moto oyo andimaka 'tè Yezu azali Mwana ya Nzambe, ye nde moto alongaka mabe ya mokili.

[6] Toyebi Yezu Kristo po na mai pe makila na ye. Ezalaki kaka mai té, kasi mai ná makila. Molimo nde moto azali koyebisa yango; pe toyebi 'tè Molimo ayebisaka makambo ya solo.

[7] Boye ekómi lokola likambo batemwen misato balobi: Molimo, mai, pe makila; bango nyonso bazali koloba bobele ndenge moko.

[9] Soki bato misato balobi ndenge moko, tondimaka maloba na bango; kasi maloba ya Nzambe eleki na tina, pamba té Nzambe ye moko moto alobaki po na Mwana na ye.

[10] Bongo moto oyo andimeli Mwana ya Nzambe, azali kobomba maloba ya Nzambe na motema na ye. Kasi oyo andimi Nzambe té, akómisi ye moto ya lokuta, na ndenge azali koboya makambo Nzambe alobaki po na Mwana na ye.

[11] Maloba wana ya Nzambe elakisi 'tè ye asi'apesá biso bomoi ya seko; tozwaka yango po na Mwana na ye.

[12] Moto oyo azali lisanga na Mwana, azali na bomoi; oyo asangani na Mwana ya Nzambe té, azali na bomoi té.

[13] Bino bato bondimelaka Mwana ya Nzambe, nakòmeli bino makambo oyo po bóyeba malamu 'tè bozali na bomoi ya seko.

[14] Tokoki kotia motema na Nzambe, po toyebi 'tè ayokelaka biso soki tosengi makambo oyo ye alingi.

[15] Lokola toyebi 'tè ayokelaka biso tango nyonso tosengaka ye, toyebi pe 'tè tosi'tozwi nyonso oyo tosengaki ye.

[16] Soki moto amoni ndeko na ye azali kosala masumu oyo ememaka liwa ya seko té, ebongi moto wana ábondela Nzambe, bongo Nzambe akopesa ndeko na ye bomoi. Yango ekoki kosalama po na bato bazali kosala masumu oyo ememaka liwa té. Nzokande lisumu moko ezali oyo ememaka liwa ya seko; pe nalobi té 'tè bóbondela Nzambe po na bato basalaka lisumu ya ndenge wana.

[17] Mabe nyonso oyo bato basalaka ezali masumu, kasi masumu mosusu ememaka liwa té.

[18] Toyebi 'tè moto nyonso oyo abotami na Nzambe asalaka masumu té, pamba té, Mwana ya Nzambe abatelaka ye; boye Monguna akoki kosala ye eloko moko té.

[19] Toyebi malamu 'tè tozali bato ya Nzambe, atako mokili mobimba ezali na maboko ya Monguna.

[20] Toyebi pe 'tè Mwana ya Nzambe ayaki awa na mokili pe apesaki biso mayele po tókoka koyeba Nzambe ya solo. Tosangani na Nzambe ya solo na lisanga ya Mwana na ye Yezu Kristo. Ye moto azali Nzambe ya solo pe apesaka bomoi ya seko.

[21] Bana na ngai, bóboya banzambe ya bikeko.

1 Yoane — Chapters