Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:06

[1] Bana na ngai, nazali kokòmela bino makambo oyo po bósala masumu té. Nzokande soki moto asali masumu, Yezu Kristo moto ya bosembo, azali avoka na biso epai ya Tata.

[2] Ye nde moto amipesaki na Nzambe lokola libonza po na masumu na biso; ezali kaka po na masumu na biso té, kasi po na oyo ya bato nyonso.

[3] Tokoki koloba 'tè toyebi Nzambe bobele soki totosaka mibeko na ye.

[4] Moto oyo alobaka 'tè ayebi Nzambe, nzokande atosaka mibeko na ye té, azali moto ya lokuta pe makambo ya solo ezali té kati na ye.

[5] Kasi moto oyo atosaka maloba ya Nzambe, motema na ye etondá na bolingo ya kokoka ya Nzambe. Na ndenge wana toyebaka 'tè tozali lisanga ná Nzambe.

[6] Moto oyo alobaka 'tè azali lisanga ná Nzambe, asengeli kozala na bizaleli oyo Yezu azalaki na yango.

[7] Bandeko na ngai ya bolingo, nazali kokòmela bino mobeko ya sika té, kasi bobele oyo ya kala. Bosi'bozwá yango, pamba té ezali nde maloba oyo boyokaki na ebandeli.

[8] Nzokande ezali kaka mobeko ya sika. Yezu akokisaki yango, bino pe bozali kokokisa yango. Pamba té molili ekómi kolimwa, pe moi ya solo ebandi kongenga.

[9] Moto oyo alobaka 'tè atambolaka na moi, nzokande ayinaka ndeko na ye, azali kaka na molili tii sik'oyo.

[10] Oyo alingaka ndeko na ye azali na moi; pe eloko moko té ezali na motema na ye oyo ekoki kokweisa moto na likambo.

[11] Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye, azali na molili pe atambolaka na molili; ayebaka té epai wapi azali kokende, pamba té molili esi'ezipá miso na ye.

[12] Bana, nazali koyebisa bino: masumu na bino esi'elongwá po bondimeli Yezu.

[13] Batata, nazali koyebisa bino: boyebi Moto oyo azalaká uta na ebandeli. Bilenge, nazali koyebisa bino: bosi'bolongi Monguna.

[14] Bana, nazali koyebisa bino ya solo: boyebi Tata. Batata, nazali koyebisa bino ya solo: boyebi Moto oyo azalaká uta na ebandeli. Bilenge, nazali koyebisa bino ya solo: bozali bilombe; maloba ya Nzambe esi'ekotelá bino, pe bosi'bolongi Monguna.

[15] Bólinga mokili oyo té pe bólula biloko na yango té. Soki moto alingi mokili oyo, bolingo ya Tata ezali kati na ye té.

[16] Pamba té makambo oyo bato ya mokili balingaka pe biloko oyo bango balingaka po bamoni yango na miso, ná bomengo oyo epesaka bango lofundu, biloko nyonso wana etali mokili. Yango eutaka na Tata té, kasi eutaka awa na mokili.

[17] Makambo ya mokili ná baposa ya bato ezali kolimwa; kasi moto oyo asalaka makambo Nzambe alingaka, azali na bomoi ya seko.

[18] Bana na ngai, tokómi na tango ya suka. Boyokaki 'tè Monguna ya Kristo azali koya; sik'oyo banguna ebele ya Kristo basi'babimi. Yango wana toyebi 'tè tokómi na tango ya suka.

[19] Bato yango bazalaki bandeko na biso té; yango wana batiki biso. Soki bazalaki penza bandeko na biso, mbele batikalaki na kati na biso. Kasi batiki biso po émonana polele 'tè moko té na kati na bango azalaki ndeko na biso.

[20] Nzokande bino bosi'bozwi Molimo Mosantu oyo auti na Kristo; boye bino nyonso boyebi makambo ya solo.

[21] Soki nakòmeli bino mokanda oyo, elakisi té 'tè boyebi makambo ya solo wana té, kasi boyebi yango. Epai ya bato oyo balandaka yango, likambo moko té ya lokuta ezalaka.

[22] Nani azali moto ya lokuta? Ezali moto oyo alobaka na miso ya bato 'tè Yezu azali Mesia té. Moto yango azali monguna ya Kristo po awangani Nzambe Tata pe Mwana na ye.

[23] Pamba té moto oyo awangani Mwana, awangani pe Tata. Moto oyo andimeli Mwana, andimeli pe Tata.

[24] Yango wana, makambo oyo bosi'boyoká uta na ebandeli, bóbatela yango na mitema. Soki bobateli makambo oyo bosi'boyoká uta na ebandeli, bino pe bokozala libela lisanga ná Mwana pe Tata.

[25] Elaka Kristo apesaki biso, yango oyo: Tokozwa bomoi ya seko.

[26] Nakòmeli bino makambo wana po na bato oyo balukaka nzela ya kokosa bino.

[27] Kasi bino, Kristo asi'apesá bino Molimo, oyo azali ná bino libela; boye bozali na posa ya mateya ya bato té, pamba té Molimo ya Kristo alakisaka bino makambo nyonso; alobaka makambo ya solo, akosaka té. Yango wana, bósangana libela ná Kristo ndenge Molimo na ye azali kolakisa bino.

[28] Ya solo, bana na ngai, bósangana ná Kristo libela, bongo mokolo ye akomonana tokozala na molende; tokoyoka soni té na miso na ye mokolo ye akoya.

[29] Boyebi 'tè Kristo azali moto ya bosembo; boye bosengeli koyeba 'tè moto nyonso oyo asalaka makambo ya bosembo azali Mwana ya Nzambe.

1 Yoane — Chapters