[1] Tozali koyebisa bino makambo etali Moto oyo azalaká uta na ebandeli ya makambo nyonso. Toyokaki ye pe tomonaki ye na miso na biso moko; totalaki ye malamu pe tosimbaki ye na maboko. Ye azali penza Liloba oyo apesaka bomoi ya solo. Bomoi yango eyaki komimonisa epai ya bato; tomonaki yango pe tozali kosakola sango na yango. Moto oyo apesaka bomoi ya seko azalaká epai ya Tata pe ayaki komilakisa na biso.
[3] Biso tosi'tosanganá ná Tata pe ná Mwana na ye Yezu Kristo; bongo tozali koyebisa bino makambo oyo tomonaki pe toyokaki, po bino pe bózala ná biso lisanga moko.
[4] Tozali kokòmela bino makambo oyo po esengo na biso ézala ya kokoka.
[5] Sango oyo toyokaki epai ya Yezu pe tozali koyebisa bino, yango oyo: Nzambe azali lokola moi, pe epai na ye molili ezali ata moke té.
[6] Soki tolobi 'tè tozali ná ye lisanga, nzokande tozali kotambola na molili, tozali koloba lokuta, pe tolandaka té makambo ya solo.
[7] Kasi soki tozali kotambola na moi ndenge Nzambe ye moko azalaka na moi, biso nyonso tokómi lisanga moko, pe makila ya Yezu, Mwana ya Nzambe, elongoli biso mbindo nyonso ya masumu.
[8] Soki tolobi 'tè tozali na masumu té, tozali komikosa pe makambo ya solo ezali té kati na biso.
[9] Nzokande, soki tobimisi polele masumu na biso, Nzambe azali bosembo, akokisaka maloba na ye; akolimbisa biso masumu nyonso pe akokómisa biso peto.
[10] Soki tolobi 'tè nanu tosalá masumu té, tokómisi Nzambe moto ya lokuta, pe maloba na ye ekoteli biso té.