Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:14

[1] Mama ya lokumu oyo Nzambe aponá ná bana na ye, bino nyonso bóyamba mbote euti na ngai, mbuta-muntu ya Eklezya. Ya solo, nalingaka bino penza; ezali bobele ngai té, kasi bato nyonso oyo bayebi makambo ya solo.

[2] Pamba té makambo ya solo etikalaka na kati ya mitema na biso pe ekozala na biso seko.

[3] Nzambe Tata pe Yezu Kristo, Mwana ya Tata, bápesa biso bolamu ná boboto, pe báyokela biso mawa, po tózala bato ya solo pe ya bolingo.

[4] Nazali na esengo mingi penza ya koyoka ’tè bandeko mosusu na kati na bino bazali kolanda makambo ya solo, ndenge Tata atindaki biso.

[5] Bandeko, nazali kokòmela bino mobeko ya sika té, kasi bobele oyo toyokaki uta ebandeli. Nasengi bino sik'oyo: tólingana.

[6] Bolingo ezali nini? Ezali bobele kotosa mibeko ya Nzambe. Mobeko oyo bozwaki uta ebandeli, yango oyo: bosengeli kolingana tango nyonso.

[7] Bato mingi ya lokuta bapanzani awa na mokili. Baboyi kondima 'tè Yezu Kristo akómaki moto pe ayaki awa na mokili. Moto aboyi kondima boye azali moto ya lokuta pe monguna ya Kristo.

[8] Bókebaka po misala oyo tosi'tokokisi na kati na bino ébeba té; kasi bózwa na yango lifuta oyo ekoki.

[9] Moto nyonso oyo akangami na mateya ya Kristo té kasi alandi makambo mosusu, azali lisanga ná Nzambe té. Kasi oyo akangamaka na mateya ya Kristo, ye nde moto azali lisanga ná Tata pe Mwana.

[10] Soki moto ayeeli bino mateya mosusu, bóyamba ye té na bandako na bino; bópesa ye kutu ata mbote té.

[11] Pamba té moto nyonso oyo apesi ye mbote asangani na misala na ye ya mabe.

[12] Nazali na makambo mosusu mingi ya koyebisa bino, kasi nalingi kokòmela bino yango na mokanda té. Natie motema 'tè nakoya kuna kolobela bino yango ngai moko, boye biso nyonso tokotonda na esengo.

[13] Bana ya ndeko na yo ya mwasi oyo Nzambe aponá, bango pe batindeli bino mbote.