[1] Bótala ndenge Tata alingi biso mingi koleka; abengaka biso bana na ye. Ya solo, tozali bana ya Nzambe. Yango wana bato ya mokili bayebi biso té, po bayebi Nzambe té.
[2] Bandeko na ngai ya bolingo, sik'oyo tosi'tokómá bana ya Nzambe, kasi nanu emonani té soki tokozala ndenge nini. Nzokande toyebi 'tè tango Kristo akomonana tokozala lokola ye, pamba té tokomona ye ndenge azali.
[3] Moto nyonso oyo azali kotia motema 'tè Kristo akoyeela ye bolamu wana, akómisi motema na ye pembe ndenge Kristo azali na motema pembe.
[4] Moto nyonso oyo asalaka masumu, azali koboya Nzambe, pamba té kosala masumu ezali koboya Nzambe.
[5] Kasi boyebi 'tè Kristo ayaki awa na se po na kolongola masumu ya bato, pe ye atikalaki kosala masumu ata moke té.
[6] Bongo moto nyonso oyo asangani na Kristo, asalaka lisusu masumu té. Kasi moto nyonso oyo azali kaka kosala masumu, atikalaki komona ye té pe ayebi ye ata moke té.
[7] Bana na ngai, moto moko té ákosa bino. Moto oyo asalaka makambo ya bosembo azali moto ya bosembo na miso ya Nzambe lokola Kristo.
[8] Moto oyo asalaka masumu azali moto ya zabolo, pamba té zabolo abandá kosala masumu uta na ebandeli. Mwana ya Nzambe ayaki awa na se bobele po na koboma misala ya zabolo.
[9] Moto nyonso oyo azali Mwana ya Nzambe asalaka lisusu masumu té po nguya ya bomoi oyo euti na Nzambe ezali na kati na ye. Boye asalaka masumu té, po Nzambe azali Tata na ye.
[10] Tala ndenge tokoki koyeba banani bazali bana ya Nzambe pe banani bana ya zabolo: moto nyonso oyo aboyaka kosala makambo ya bosembo pe alingaka ndeko na ye té, azali mwana ya Nzambe té.
[11] Makambo bosi'boyoká uta ebandeli yango oyo: tosengeli kolingana.
[12] Tózala lokola Kaina té: ye azalaká moto ya zabolo, yango wana abomaki ndeko na ye. Po na nini abomaki ye? Ezali po Kaina azalaki kosala makambo ya mabe, nzokande ndeko na ye azalaki kosala makambo ya bosembo.
[13] Bandeko, bókamwa té soki bato ya mokili oyo bazali koyina bino.
[14] Biso toyebi 'tè tolongwe na liwa pe tokómi na bomoi, pamba té tozali kolingana. Nzokande moto oyo alingaka bandeko na ye té, atikali moto akufá.
[15] Moto oyo ayinaka ndeko na ye azali lokola mobomi. Boyebi 'tè mobomi akoki kozala na bomoi ya seko té.
[16] Kristo alakisaki biso eloko babengaka bolingo, na ndenge apesaki bomoi na ye po na biso. Bongo biso pe tosengeli kopesa bomoi na biso po na bandeko na biso.
[17] Soki moto ya bomengo amoni 'tè ndeko na ye azali kokelela, kasi aboyi kosalisa ye, ndenge nini akoki koloba 'tè alingaka Nzambe?
[18] Bana na ngai, bolingo na biso ézala bobele ya maloba té; kasi tósala nde misala, tólinganaka na ndenge ya solo.
[19] Soki tozali kolingana ndenge wana, tokoyeba 'tè tolandaka makambo ya solo; boye tokoki kokitisa mitema na miso na ye,
[20] ata soki toyebi 'tè tosalaki masumu. Pamba té Nzambe aleki biso na ndenge alingaka bato pe ayebi makambo nyonso.
[21] Boye bandeko ya bolingo, lokola toyebi 'tè tozali lisusu na masumu té, tokoki kozala na molende liboso ya Nzambe.
[22] Tozwaka makambo nyonso tosengaka epai na ye, po totosaka mibeko na ye pe tosalaka oyo esepelisaka ye.
[23] Mobeko Nzambe apesá biso, yango oyo: tóndima Mwana na ye Yezu Kristo, pe tólinganaka ndenge Kristo atindaki biso.
[24] Moto oyo atosaka mibeko ya Nzambe azali ná ye lisanga libela. Toyebi 'tè Nzambe azali ná biso lisanga, po na Molimo oyo apesá biso.