Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:11

[1] Bandeko ya bolingo, baprofete mingi ya lokuta basi'bapanzani na mokili. Bóndimela baprofete nyonso té kasi bómeka bango liboso, po na koyeba soki molimo oyo bazali na yango euti na Nzambe.

[2] Tala ndenge bokoyeba Molimo ya Nzambe: profete nyonso oyo andimaka 'tè Yezu Kristo akómaki penza moto lokola biso, ye nde azali na Molimo oyo auti na Nzambe.

[3] Kasi profete nyonso oyo akamati Yezu na ndenge wana té, azali na Molimo ya Nzambe té. Azali na molimo oyo euti na Monguna ya Kristo. Boyokaki 'tè molimo yango elingaki koya, pe sik'oyo esi'ekómi awa na mokili.

[4] Kasi bino, bana na ngai, bozali lisanga ná Nzambe, pe bosi'bolongi baprofete wana ya lokuta; pamba té Molimo oyo azali na bino aleki milimo oyo ezali na bato ya mokili.

[5] Baprofete ya lokuta bazali bato ya mokili; yango wana basakolaka makambo ya mokili pe bato ya mokili bayokelaka bango.

[6] Kasi biso tozali lisanga ná Nzambe. Moto oyo ayebi Nzambe ayokelaka biso, kasi oyo azali moto ya Nzambe té, ayokelaka biso té. Wana ezali ndenge toyebelaka Molimo ya makambo ya solo, ná molimo oyo ekosaka.

[7] Bandeko ya bolingo, tólinganaka, pamba té bolingo eutaka na Nzambe. Moto azali na bolingo azali Mwana ya Nzambe pe ayebi Nzambe.

[8] Oyo azangá bolingo ayebi Nzambe té. Pamba té Nzambe azali bolingo.

[9] Tala ndenge Nzambe alakisaki biso bolingo na ye: atindaki Mwana na ye se moko awa na mokili, na tina 'tè tózala na bomoi ya solo po na ye.

[10] Ya solo, bolingo ya Nzambe eleki monene: ezali biso té bato tozalaki kolinga ye, kasi ye nde moto azalaki kolinga biso, bongo atindaki Mwana na ye, oyo amipesaki lokola libonza po na kolongola masumu na biso.

[11] Bandeko ya bolingo, lokola Nzambe azalaki kolinga biso mingi boye, biso pe tosengeli kolingana.

[12] Moto moko té asi'amoná Nzambe; kasi soki tozali kolingana, wana elakisi 'tè Nzambe azali ná biso lisanga, bongo bolingo na ye ezali komonana kati na biso na ndenge ya kokoka.

[13] Toyebi 'tè tozali ná Nzambe lisanga, po asi'apesi biso Molimo na ye.

[14] Ya solo Tata atindaki Mwana na ye po na kobikisa bato ya mokili. Tozali kosakola bongo, po tomonaki ye na miso.

[15] Moto nyonso oyo andimi 'tè Yezu azali Mwana ya Nzambe, azali ná Nzambe lisanga.

[16] Biso toyebi pe tondimaka 'tè Nzambe alingaka biso. Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo, azali ná Nzambe lisanga.

[17] Soki bolingo ya Nzambe ezali komonana kati na biso na ndenge ya kokoka, wana bizaleli na biso awa na mokili ekokani ná oyo Yezu Kristo azalaki na yango; boye tokozala na molende mokolo Nzambe akosambisa bato.

[18] Moto oyo azali na bolingo abangaka té, po bolingo ya kokoka elongolaka kobanga. Nzokande moto abangaka soki azali kozela etumbu; na boye emonani 'tè bolingo na ye ezali ya kokoka té.

[19] Biso tozali na bolingo, po Nzambe azalaki kolinga biso liboso.

[20] Soki moto alobi 'tè alingaka Nzambe nzokande ayinaka ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Pamba té ndeko oyo ye azali komona na miso, alingaka ye té; ndenge nini akoki kolinga Nzambe oyo ye amoná nanu té?

[21] Mobeko Kristo apesaki biso, yango oyo: moto alingaka Nzambe, asengeli pe kolinga ndeko na ye.

1 Yoane — Chapters