[1] Bandeko ya bolingo, oyo ezali mokanda ya mibale nakòmeli bino likolo ya makambo oyo bosi'boyebá. Nasali boye po nálamusa bino, bongo bózalaka na makanisi ya malamu.
[2] Bókanisaka maloba oyo baprofete bazalaká kosakola, pe lisusu mibeko ya Yezu, Nkolo pe Mobikisi na biso, ndenge bantoma na bino balakisaki bino.
[3] Bóyeba malamu 'tè na mikolo ya suka bato bakomonana oyo bakobanda kolanda bobele baposa na bango moko. Bakozala kotia tembe po na maloba ya Nkolo pe bakoseka yango,
[4] bakoloba boye: “Moto yango alakaki 'tè akozonga. Bongo wapi ye? Batata na biso ya liboso basi'bakufá, kasi makambo nyonso ezali koleka kaka ndenge moko uta ebandeli ya mokili!”
[5] Babosanaka na nko makambo oyo: na ebandeli Nzambe asalaká Likolo ná se na maloba na ye; abimisaká yango na mai, pe apiki yango na likolo ya mai.
[6] Se bongo pe mai eyaká kobebisa yango, na ndenge edindisaki mokili.
[7] Bobele ndenge wana, Likolo ná se ya lelo ezali koumela kaka po na maloba oyo Nzambe alobá, tii mokolo akoboma yango na móto. Azali kobatela yango tii mokolo akokatela bato ya mabe etumbu ya liwa ya seko.
[8] Kasi bandeko ya bolingo, bóbosana té 'tè Nkolo amonaka mokolo moko lokola mbula nkoto moko (1.000); pe mbula nkoto moko (1.000), lokola mokolo moko.
[9] Bato mosusu bazali koloba 'tè Nkolo aumeli po na kokokisa elaka na ye. Ezali bongo té; azali kutu kokanga motema po na bino, pamba té alingi té ata moto moko ábunga; alingi bato nyonso bábongola mitema.
[10] Kasi Mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka. Mokolo yango, Likolo ekolimwa pe makelele moko ya somo ekoyokana; biloko nyonso ya Likolo ekokufa na móto; mokili ná makambo nyonso bato bazali kosala, ekomonana lisusu té.
[11] Lokola nyonso wana ekokufa boye, bosengeli kozala bato ya bosantu pe ya losambo.
[12] Bózela mokolo ya Nzambe na motema moko, pe bótia molende po yango éya noki. Mokolo yango Likolo ekozika, pe biloko nyonso oyo ezali kuna ekokufa na móto ya makasi.
[13] Kasi biso tozali kozela Likolo ya sika pe mokili ya sika oyo Nzambe alakaká bato na ye. Kuna ekozala bobele bosembo.
[14] Yango wana, bandeko ya bolingo, awa bozali kozela mokolo yango, bótia molende po Nzambe áya kokuta bino bato ya mitema pembe, ya boboto, pe ya malonga penza.
[15] Bóyeba malamu 'tè soki Nkolo na biso azali kokanga motema, ezali bobele po bókoka kobika. Wana ezali makambo ndeko na biso ya bolingo Polo akòmelaki bino, na mayele oyo Nzambe apesaki ye.
[16] Azalaki kozongela yango mbala mingi na mikanda na ye nyonso. Makambo mosusu kutu na mikanda wana ezali pasi po bato báyeba tina na yango. Yango wana bato oyo bazangá mayele bazali kolimbola yango na ndenge ekoki té, po bayebi makanisi ya Nzambe té. Basalaka se ndenge wana na Mikanda mosusu; bazali komilukela liwa ya seko.
[17] Boye bandeko ya bolingo, nasi'nakebisi bino. Bozali kondima na motema moko, bózala ekenge, po bato ya mabe bákosa bino té pe bákweisa bino té.
[18] Kasi lokola bosi'boyebi Yezu Kristo, Nkolo pe Mobikisi na biso, pe bosi'bozwi bolamu na ye, bótia molende po bókóma bato ya kokoka. Lokumu ézala na ye sik'oyo pe seko! Amen.