Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:09

[1] Yango wana, bandeko ya bolingo, bókangamaka kaka na Nkolo Yezu, na molende nyonso. Nazali penza na posa ya komona bino lisusu, pamba té nalingi bino mingi; bino bozali esengo na ngai, bozali lokumu na ngai.

[2] Nasengi na bamama oyo, Evodie pe Sentishe 'tè báyokana na lisanga na Nkolo Yezu.

[3] Yo pe moninga na ngai ya motema, nasengi yo ósalisa bango, pamba té bapesaki ngai maboko po na kopanza Sango Malamu, nzela moko ná Kleman pe baninga na ngai mosusu ya mosala. Nzambe asi'akòmá bakombo na bango nyonso na buku ya bomoi.

[4] Bózalaka tango nyonso na esengo, na lisanga na Nkolo! Nalobi lisusu: bózalaka na esengo.

[5] Bósala 'tè bato nyonso bámona ndenge bozali mitema boboto. Etikali moke, Nkolo áya.

[6] Bómitungisaka ata moke té, kasi bóbondelaka Nzambe po na kosenga ye nyonso oyo bozali na yango posa; pe bópesaka ye mersi.

[7] Pe boboto oyo eutaka na Nzambe eleki mayele nyonso; yango nde moto ekobatela mitema pe makanisi na bino, na lisanga na Kristo Yezu.

[8] Bongo sik'oyo, bandeko, bókanisaka bobele makambo ya solo, ya kitoko, ya bosembo, ya malamu pe ya malonga. Bólukaka makambo ya kokoka, oyo Nzambe andimaka, oyo epesaka moto lokumu.

[9] Bósalaka makambo boyekolaki pe bozwaki, ndenge boyokaki pe bomonaki epai na ngai. Boye Nzambe, oyo apesaka boboto, akozala na bino.

[10] Nasepelaki mingi po na ndenge bozwaki lisusu nzela ya kolakisa ngai 'tè bozali kokanisa ngai. Namoni yango lokola likabo ya Nkolo Yezu. Ya solo, bozalaki kokanisa ngai; kasi bozwaki nzela té ya kolakisa yango.

[11] Nalobi bongo té po nazali kokelela; pamba té nasi'namesaná kosepela na makambo nyonso oyo eyeelaka ngai.

[12] Nayebi ndenge ya kozala, ata nakeleli to nazali na bomengo. Nasi'nazwi mayele ya kokanga motema na makambo nyonso, ata nazali na bilei to na nzala, ata nazali na biloko mingi to nazangi biloko.

[13] Nakoki kosala makambo nyonso, pamba té makasi na ngai eutaka na Kristo.

[14] Kasi bosalaki malamu lokola bosalisaki ngai tango nazalaki na pasi.

[15] Bino bato ya Filipi, boyebi malamu 'tè banda tango nalongwaki na rejion na bino Masedwane po na kobanda mosala ya Sango Malamu, bobele bino bato bosalisaki ngai na kati ya ba-Eklezya nyonso; pe bobele bino bato boyokanaki na ngai po na kopesana makabo.

[16] Ya solo, banda tango nazalaki na Tesalonike, bino bozalaki kotindela ngai lisalisi mbala na mbala, tango nazalaki kokelela.

[17] Bókanisa té 'tè nazali koluka makabo na bino; kasi nalingi bókóma bato ya bomengo na miso ya Nzambe.

[18] Nasi'nazwi biloko nyonso oyo ekoki na ngai, esi'eleki kutu. Lokola nazwaki makabo oyo botindelaki ngai na maboko ya Epafrodite, sik'oyo natondi na biloko. Makabo na bino ezali lokola libonza ya sòlo kitoko, esepelisaka Nzambe koleka banyama oyo babomelaka ye.

[19] Nzambe na ngai azali na bomengo pe lokumu nyonso; ye nde moto akopesa bino biloko nyonso oyo bozali na yango posa, po na Kristo Yezu.

[20] Lokumu ézala na Nzambe, Tata na biso, mikolo nyonso seko. Amen!

[21] Bópesa ndeko moko moko mbote, na lisanga na Kristo Yezu. Bandeko oyo bazali ná ngai batindeli bino pe mbote.

[22] Bato nyonso ya Nzambe oyo bazali awa batindeli bino mbote, mingi penza baoyo basalaka na leta.

[23] Bolamu ya Nkolo Yezu Kristo ézala na bino nyonso.

Ba-Filipien — Chapters