[1] Bongo sik'oyo, bandeko na ngai, bózalaka tango nyonso na esengo, na lisanga na Nkolo. Nayebi 'tè nasi'nakòmelá bino yango kala. Kasi nalembi té po na kokòma yango lisusu, po ékotela bino tii na mikuwa.
[2] Bókebaka na bato mabe, bambwa oyo baboyá bondeko! Bókeba na basali ya mabe! Bókeba na baoyo bamibengaka basali ya Nzambe po bamikatisaka nzoto!
[3] Bato ya Nzambe ya solo ezali nde biso; pamba té biso bato tosambelaka Nzambe na ndenge ya solo, na nguya ya Molimo na ye, pe totiaka motema na Kristo Yezu, kasi na makambo ya bomoto té.
[4] Nzokande soki moto mosusu akanisi 'tè akoki kotia motema na makambo ya bomoto, áyeba 'tè ngai pe nakoki kosala bongo, kutu naleki ye.
[5] Bakataki ngai nzoto sima ya mikolo mwambe, ndenge Mibeko ezali kotinda. Nabotamá moto ya Israel, ya ekolo ya Benjamen. Nazali mo-Ebré; bakoko na ngai nyonso pe bazalaká ba-Ebré. Na makambo etali Mibeko, namipesaki mobimba po na yango; nazalaki Farizé, nabandaki kutu konyokola Eklezya. Nazalaki kotia motema 'tè Mibeko ékómisa ngai bosembo na miso ya Nzambe, na ndenge natikalaki kobuka yango ata moko té.
[7] Kasi makambo oyo nazalaki komona 'tè ezali ya tina, sik'oyo namoni yango pamba po na Kristo.
[8] Ya solo, natalaka yango nyonso pamba, po likambo moko kaka moto eleki tina penza: koyeba Kristo Yezu Nkolo na ngai. Likolo na ye nabwaká nyonso, pe namonaka yango lokola salité, po názwa Kristo,
[9] pe nákóma penza lisanga na ye. Ya solo, natiká koluka komikómisa bosembo na nzela ya kolanda Mibeko, kasi nakómi bosembo na nzela ya kondimela Kristo; bobele Nzambe moto apesaka bosembo yango, po na bondimi.
[10] Makambo nalingi yango oyo: koyeba Kristo pe nguya ya kosekwa na ye; komona pasi oyo ye amonaki; pe kokufa ndenge ye akufaki.
[11] Pamba té natie motema 'tè ngai pe nakosekwa.
[12] Nayebi 'tè nanu nalongi té, pe nanu nakoká té; nakómi lokola moto oyo azali komeka mbangu na ye, nazali kosala makasi po názwa bomengo wana, pamba té Kristo Yezu asi'azwá ngai uta kala.
[13] Bandeko, nakanisi té 'tè nasi'nazwi yango, kasi nazali koluka likambo moko: natiki kolanda makambo ya kala pe nazali kotala na posa mingi oyo ezali liboso na ngai.
[14] Bongo, nazali kokima mbangu tii na suka, po názwa bomengo oyo Nzambe alaki bato ye abengi, na lisanga na Kristo Yezu.
[15] Biso nyonso oyo tozali “bato ya kokoka,” tosengeli kokanisa boye. Pe soki bokanisi ndenge mosusu, Nzambe akolakisa bino yango kaka.
[16] Nzokande tólanda bobele makambo oyo Nzambe asi'alakisi biso.
[17] Bandeko, bino nyonso bózwa ndakisa na ngai, pe bólanda bato oyo basalaka lokola ngai.
[18] Nayebisaki bino mbala mingi, pe nazali koyebisa bino lisusu sik'oyo na mai na miso: bato mingi bazali banguna ya kuruze ya Kristo, po na bizaleli na bango ya mabe.
[19] Suka na bango, liwa; nzambe na bango, bobele libumu; bazali kobeta tolo po na makambo oyo esengeli koyokisa bango soni. Bakanisaka bobele makambo ya mokili oyo.
[20] Kasi biso tozali basitwayen ya mboka ya Nzambe oyo ezali na Likolo. Tozali kozela na esengo mingi Nkolo Yezu Kristo, oyo akouta kuna po na kobikisa biso.
[21] Ye akobongola nzoto na biso oyo ya mawa, pe akosala 'tè yango ékóma lokola nzoto ya lokumu oyo ye asekwaki na yango. Azali na nguya ya kosala bongo, pamba té azali Mokonzi ya biloko nyonso ya Likolo ná ya se.