Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:00

[1] Bandeko, nayebi malamu ndenge bondimi na bino epai ya Kristo ezali kopesa bino molende, pe bolingo na ye ezali kolongola bino mawa. Molimo Mosantu akómisá bino lisanga moko, boye bozali koyokela bandeko nyonso mawa.

[2] Yango wana bótondisa ngai lisusu na esengo. Bóyokana pe bólingana penza, bózala motema moko pe makanisi moko.

[3] Bówela koleka baninga ata moke té, bómikumisa té kasi bótika lofundu, pe moto nyonso ámona baninga lokola nde bango baleki ye.

[4] Moto moko té áluka bolamu na ye moko, kasi moto nyonso áluka bolamu ya bandeko.

[5] Na kati na bino bózalaka na makanisi ndenge moko na oyo euti na Kristo Yezu.

[6] Ye azali ndenge moko na Nzambe, kasi azalaki na makanisi té ya kowela kokokana ná Nzambe.

[7] Kasi atikaki lokumu na ye; andimaki kozala ndenge moko na moumbu, akómaki lokola bato nyonso. Azalaki komonana na nzoto ya bomoto.

[8] Kristo amikitisaki penza, atosaki tii na liwa, ata liwa ya kuruze.

[9] Yango wana Nzambe atomboli ye koleka, pe apesi ye bokonzi monene, oyo eleki bokonzi nyonso ya Likolo ná se.

[10] Boye po na bokonzi ya Yezu, baoyo nyonso bazali na Likolo, to awa na se, to pe na mboka ya bato bakufá, esengeli báfukamela ye

[11] pe básakola 'tè: Yezu Kristo azali Nkolo; bongo bápesa lokumu na Nzambe Tata.

[12] Bandeko na ngai ya bolingo, tango nazalaki na kati na bino, bozalaki kotosa ngai tango nyonso; yango wana bótosa ngai pe sik'oyo ata nazali mosika. Soki bolingi kobika, bósalaka makasi na kobanga nyonso.

[13] Pamba té Nzambe asalaka mikolo nyonso na kati na bino, po bólinga pe bóluka makambo ye alingaka.

[14] Bóyimayima té pe bótia tembe té, na makambo nyonso oyo bosalaka,

[15] po bómema ngambo moko té pe bósala mabe ata moko té. Bongo bokokóma bana ya Nzambe; bózala bana ya kokoka, na kati ya bato ya lokuta pe ya mabe ya mokili oyo. Bosengeli kongenga na kati na bango lokola minzoto na likolo,

[16] pamba té bozali na maloba ya bomoi. Soki bosali bongo, nakosepela po na bino, mokolo Kristo akozonga; yango ekolakisa 'tè mosala nyonso nasalaki pe makasi nyonso natiaki, ezalaki ya pamba té.

[17] Nakómi lokola nganga-Nzambe; libonza oyo nalingi kopesa na Nzambe, ezali nde bondimi na bino. Pe soki esengeli násopa makila na ngai po na kokokisa libonza na bino, nakozala kaka na esengo, nakosepela esika moko ná bino.

[18] Ndenge moko pe, bino bózala na esengo pe bósepela esika moko ná ngai.

[19] Natie motema na Nkolo Yezu 'tè nakotindela bino Timoté sima ya mwa-mikolo, po náyoka sango na bino pe nákitisa motema.

[20] Natikali bobele na ye; makanisi na ye ezali lokola oyo ya ngai, pe alukaka penza bolamu na bino na motema moko.

[21] Pamba té bato nyonso bazali koluka se bolamu na bango moko, kasi makambo ya Kristo Yezu té.

[22] Nzokande bino moko boyebi ndenge Timoté asi'alakisi bolamu na ye. Amipesi mobimba po na Sango Malamu, esika moko na ngai, ndenge Mwana asalisaka tata na ye.

[23] Yango wana nakotindela bino ye noki, tango nakoyeba ndenge makambo na ngai ekosuka.

[24] Natie motema na Nkolo Yezu 'tè sima ya mwa-mikolo ngai moko nakoya kotala bino.

[25] Nakanisi 'tè eleki pe malamu názongisela bino ndeko na biso Epafrodite, moninga na ngai ya mosala pe ya etumba, oyo botindaki po na kosalisa ngai tango nazalaki komona pasi.

[26] Ye azali na posa mingi ya komona bino nyonso, pe azali na mawa penza koleka po boyokaki 'tè azalaki na maladi.

[27] Ya solo, azalaki na maladi, pe etikalaki moke ákufa. Kasi Nzambe ayokelaki ye mawa; asalisaki kaka ye té kasi ná ngai pe, na ndenge abakiselaki ngai pasi té.

[28] Yango wana, nalingi nátindela bino ye noki-noki, po tango bokomona ye lisusu bósepela, pe motema na ngai ékita moke.

[29] Bongo, bóyamba ye na esengo nyonso lokola ndeko, na lisanga ya Nkolo. Bosengeli kopesa lokumu na bato ya ndenge wana.

[30] Pamba té alingaki kokufa po na mosala ya Kristo; andimaki kopesa bomoi na ye po na kosalisa ngai na makambo oyo bino moko bokokaki té.

Ba-Filipien — Chapters