[1] Mbote na bino, bato ya Nzambe, bandeko ya mboka Kolose oyo bakangamaka na Kristo. Ngai Polo, moto Nzambe aponá po názala ntoma ya Kristo Yezu, pe ndeko na biso Timoté, totindeli bino mokanda oyo. Bózwa bolamu pe boboto oyo euti epai ya Nzambe, Tata na biso.
[3] Mikolo nyonso tosambelaka po na bino, pe topesaka mersi na Nzambe, Tata ya Nkolo na biso Yezu Kristo.
[4] Pamba té toyokaki ndenge bozali kondimela Kristo Yezu pe kolinga bato nyonso ya Nzambe,
[5] pe ndenge bozali kotia mitema na bolamu oyo Nzambe abombelá bino na Likolo. Pamba té Sango Malamu oyo boyokaki liboso ezali ya solo.
[6] Na mokili mobimba yango ezali kopanzana pe kosala mosala, bobele ndenge emonanaka epai na bino, banda mokolo boyaki koyeba bolamu oyo Nzambe apesaka na bato, ndenge ezali ya solo.
[7] Ezali ndeko ya bolingo Epafras, moninga na biso ya mosala, moto ateyaki bino yango. Ye asalelaki Kristo pe ná bino, na motema malamu;
[8] ayebisaki biso sango ya bolingo oyo Molimo ya Nzambe apesá bino.
[9] Yango wana, banda mokolo toyokaki sango na bino, totiki kosambela té po na bino; tosengaka Nzambe 'tè Molimo átondisaka bino na mayele penza, po bóbanda koyeba makambo nyonso oyo Nzambe alingaka.
[10] Boye, bokozala na bizaleli oyo ebongi na miso ya Nkolo Yezu, pe esepelisaka ye mingi. Bokobanda kosala misala ya malonga ndenge na ndenge, pe bokoyeba Nzambe malamu koleka.
[11] Ye moko álendisa bino na nguya na ye ya lokumu po bótiaka molende pe bókangaka mitema na makambo nyonso.
[12] Bópesa mersi na Tata, na esengo nyonso, pamba té ye atambwisaka bino na moi; abongisá bino po bókoka kozwa bomengo oyo abombelá bato na ye.
[13] Asi'alongolá biso na boumbu ya molili, pe akómisá biso bato ya bokonzi ya Mwana na ye ya bolingo.
[14] Ya solo, tozwi bonsomi po na Kristo; po na ye Nzambe alimbisi masumu na biso.
[15] Kristo akamatá elongi ya Nzambe oyo amonanaka té; azali Mwana ya liboso, na kati ya biloko nyonso oyo Nzambe asalá.
[16] Pamba té, lisanga na ye Nzambe asalá bikelamo nyonso, oyo ya Likolo ná oyo ya se, oyo emonanaka ná oyo emonanaka té, ézala kutu milimo oyo babengaka “Bakonzi ya Likolo ná se.” Nzambe asalá bikelamo nyonso na Kristo, po ézala ya ye;
[17] boye ye aleki yango nyonso; yango nyonso ekangamá na ye.
[18] Azali pe Mokonzi ya Eklezya; ye azali motú, Eklezya ezali lokola nzoto na ye. Azali moto ya liboso oyo azwá bomoi ya sika, na kati ya bato bakufá; yango wana akómá Mokonzi ya bikelamo nyonso.
[19] Pamba té, Nzambe ye moko akanaki kofandisa mobimba na ye na nzoto ya Mwana na ye.
[20] Akanaki pe kozongisa boyokani kati na ye pe bikelamo nyonso po na Mwana na ye. Ya solo, tango Kristo asopaki makila na ye na kuruze, boye boyokani ezongaki kati ya Nzambe ná bikelamo nyonso ya Likolo pe ya se.
[21] Bino pe liboso bokabwanaki ná Nzambe; bokómaki banguna na ye po na mabe oyo bozalaki kokanisa pe kosala.
[22] Kasi sik'oyo, po na liwa ya Kristo oyo azwaki nzoto ya bomoto, Nzambe azongisi boyokani ná bino, po bókóma bato ya bosantu pe ya kokoka penza na miso na ye.
[23] Bókangama kaka na bondimi, bótelema makasi. Moto moko té ákosa bino. Na molende nyonso bótia mitema na bomengo oyo Nzambe abombelá biso, ndenge boyokaki na Sango Malamu. Na mokili mobimba basi'bayoká yango, pe Nzambe atie ngai Polo mosakoli na yango.
[24] Sik'oyo nasepeli na bapasi oyo nazali komona po na bino. Pamba té, bapasi na ngai ezali kokokisa bapasi oyo Kristo amonaki. Namemaka yango nyonso po na bolamu ya Eklezya, oyo ezali nzoto na ye.
[25] Nzambe atiá ngai mosali ya Eklezya, na ndenge atindaki ngai násakola epai na bino sango na ye nyonso,
[26] elingi koloba: sekelé oyo ye azalaká kobomba uta na ebandeli. Sik'oyo azali kolakisa yango na bato ye aponá;
[27] alingi koyebisa bango bomengo pe lokumu oyo abombelá bikolo nyonso. Sekelé wana yango oyo: Kristo azali na kati na bino; boye bokoki kotia mitema 'tè akokabela bino pe nkembo ya Nzambe.
[28] Nazali kosakola sango ya Kristo; nazali kopesa moto nyonso toli pe koteya moto nyonso na mayele oyo ye apesi ngai; nazali koluka kokómisa moto nyonso mokóló na miso ya Nzambe, na lisanga na Kristo.
[29] Nazali kobunda na mosala oyo na nguya ya Kristo; ye moto apesaka ngai makasi.