Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:34

[1] Bosi'bosekwá ná Kristo. Yango wana bólukaka makambo ya mboka ya Nzambe oyo ezali na Likolo. Kuna Kristo afandi na esika ya lokumu penepene ya Nzambe.

[2] Bótiaka makanisi na bino na makambo ya Likolo, kasi na oyo ezali awa na se té.

[3] Pamba té, bosi'bokómá lokola bato bakufá! Bomoi na bino ebombamá esika moko ná Kristo, epai ya Nzambe.

[4] Kristo azali bomoi na bino penza. Tango ye akoya komonana, wana bino pe bokomonana esika moko ná ye, na lokumu nyonso oyo Nzambe asi'akabeli bino.

[5] Yango wana, bókóma lokola bato bakufá, bótika makambo oyo bozalaki kosala awa na mokili: kindumba pe makambo nyonso ya soni, baposa nyonso ya mabe, pe lokoso ya mbongo; pamba té bato mosusu bamonaka mbongo lokola nzambe na bango.

[6] Makambo nyonso wana moto ebendaka kanda ya Nzambe likolo ya bato oyo batosaka ye té.

[7] Liboso bino pe bozalaki kaka bongo tango bolandaki makambo yango.

[8] Kasi sik'oyo bótika bizaleli nyonso wana: koyoka kanda, kotomboka, kotóngana, kofingana pe koloba makambo ya soni.

[9] Bótika kokosana bino na bino, po bosi'botiki bomoto na bino ya kala ná bizaleli na yango,

[10] pe bozwi bizaleli ya bato ya sika, oyo Nzambe asalá na ndenge na ye moko, po bóyeba ye malamu penza.

[11] Bongo biso nyonso tokokani; ózala Moyuda to té, ézala okatisá nzoto to té, ózala moumbu to moto ya bonsomi, ata oyekolá té, ézala kutu ozali mosenzi. Bobele Kristo moto azali na tina; ye asalaka nyonso pe azali na biso nyonso.

[12] Nzambe asi'aponá bino pe alingi bino; bozali bato na ye penza. Yango wana bóyokelaka bato mawa na boboto nyonso, bómikumisaka té, bófandaka kimia pe bóyebaka kokanga mitema.

[13] Soki moto moko na kati na bino azali na likambo ná moninga, ebongi bóyokana pe bólimbisana. Bósalaka lokola Nkolo, pamba té ye pe alimbisaki bino.

[14] Na nyonso wana likambo eleki ezali: bólingana. Bolingo nde moto ekotia bino lisanga moko.

[15] Boboto ya Kristo ékotela bino na mitema, pamba té Nzambe aponá bino po bózala biteni ya nzoto moko. Pe bópesaka Nzambe mersi.

[16] Maloba ya Kristo ná bomengo na yango nyonso étonda penza na mitema na bino: bóteyanaka pe bópesanaka toli na mayele nyonso. Bóyembela Nzambe na motema mobimba. Bópesaka ye mersi, bóbetela ye miziki, bókumisa ye pe bóyembela ye banzembo oyo Molimo na ye alakisaka bino.

[17] Makambo nyonso bosalaka to bolobaka, bósalaka yango na kombo ya Nkolo Yezu; na lisanga na ye, bópesaka mersi na Nzambe Tata.

[18] Basi, bótosaka mibali na bino, ndenge ebongi na miso ya Nkolo.

[19] Bino mibali, bólingaka basi na bino, pe bókangelaka bango kanda té.

[20] Bana, bótosaka baboti na bino na makambo nyonso, pamba té yango esepelisaka Nkolo.

[21] Bino batata, bótumolaka bana na bino té po bálemba nzoto té.

[22] Bino baumbu, na makambo nyonso bótosaka baoyo bazali bakonzi na bino awa na se; ézala bobele té tango bazali kotala bino. Bólukaka kosepelisa bato té. Kasi bótosaka bango na motema moko, lokola bato babangaka Nkolo.

[23] Misala nyonso oyo bosalaka, bósalaka yango na motema moko lokola nde bozali kosalela Nkolo kasi bato té.

[24] Pamba té, Nkolo akopesa bino lifuta: bokozwa bomengo oyo Tata abombelá bana na ye. Mokonzi na bino penza ezali Kristo; bósalelaka ye.

[25] Moto oyo asalaka makambo ya mabe, mabe yango ekozongela ye moko. Po Nzambe aponaka bilongi ya bato té.

Ba-Kolosien — Chapters