Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:33

[1] Nalingi bóyeba ndenge nazali kobunda penza po na bino, po na bato ya mboka Laodisé, pe po na baoyo nyonso bamoná ngai nanu té.

[2] Nasalaka bongo po bózwa molende, bólinganaka na motema moko, pe bózala na mayele ya kokoka po na koyeba malamu penza sekelé ya Nzambe: sekelé yango nde Kristo ye moko;

[3] pamba té ezali epai na ye nde Nzambe abombisá bomengo nyonso ná mayele nyonso oyo alingi kopesa bato.

[4] Nakòmeli bino makambo oyo po moto moko té ákosa bino na maloba ya kitoko.

[5] Ata nazali mosika na bino, kasi motema na ngai ezali epai na bino. Nasepeli komona ndenge bopiki pende pe bozali kotia molende, po na kondimela Kristo.

[6] Bongo, lokola bosi'bondimi Nkolo Kristo Yezu, bózalaka tango nyonso lisanga na ye.

[7] Ye ásimba bino ndenge misisa esimbaka nzete, pe ndenge fondasion esimbaka ndako. Bózala na bondimi ya makasi penza, ndenge bateyaki bino; pe bópesaka Nzambe mersi tango nyonso.

[8] Bókeba, moto moko té ákosa bino na mateya ya basekelé pe ya lokuta, oyo ezali komonana lokola ezali ya mayele nzokande ezali oyo euti kaka na bato. Nyonso wana euti na banguya ya bato ya mokili oyo, kasi na Kristo té.

[9] Nzokande mobimba ya Nzambe ezali kofanda na nzoto ya Kristo;

[10] pe bino bosi'bozwi bolamu nyonso na lisanga na ye. Ye azali Mokonzi ya milimo nyonso oyo ezali na bokonzi pe na nguya.

[11] Bokómi bato ya ekolo ya Nzambe, po bosangani na Kristo; ye moto akómisá bino lokola bato bakatá nzoto; atako bakataki bino nzoto penza té.

[12] Pamba té, tango babatisaki bino, ezalaki lokola bakundaki bino esika moko ná Kristo; pe Nzambe asekwisaki bino esika moko ná ye, po botiaki mitema na nguya ya Nzambe, awa bondimaki 'tè ye asekwisaki Kristo.

[13] Liboso bozalaki bato bakatá nzoto té, bobandaki koyeba Nzambe té, bozalaki lokola bato bakufá, po na masumu na bino. Kasi sik'oyo Nzambe alimbisi biso masumu nyonso, pe apesi biso bomoi ya sika na lisanga na Kristo.

[14] Tokómaki bato ya nyongo po tozalaki kotosa Mibeko té; kasi Nzambe abomaki Mibeko oyo ezalaki kokweisa biso; abambaki yango na kuruze.

[15] Pamba té, tango Kristo akufaki na kuruze, Nzambe alongisaki ye; bongo asilisaki bokonzi ya milimo oyo babengaka “Bakonzi ya Likolo ná se.” Na miso na biso nyonso, milimo yango ezali komonana lokola banguna bakangami na etumba.

[16] Yango wana, moto moko té átungisa bino, ézala po na biloko ya kolia to ya komela, ézala po na mikolo ya feti, ya sanza ebimi sika, to pe Mikolo ya Kopema.

[17] Nyonso wana ezalaki bobele lokola elili ya bolamu oyo Kristo amemeli biso.

[18] Moto moko té ákweisa bino! Bato mosusu babetaka tolo po na ndenge batosaka ba-anjelu pe bakumisaka bango; bamipesaka mingi bobele makambo eyeelaka bango lokola na ndoto, batondá na lofundu ya pamba na makanisi na bango ya bomoto. Bókeba. Moto moko té ákosa bino.

[19] Pamba té, bato wana bakangamaka na Kristo té; nzokande Kristo azali lokola Motú oyo epesaka nzoto mobimba bolamu, pe esangisaka misisa na yango nyonso, po nzoto ékola ndenge Nzambe alingi.

[20] Bosi'bokufá ná Kristo; bosi'bolongwá na boumbu ya banguya ya bato ya mokili oyo. Bongo po na nini bozali kotosa yango, lokola nde bozali kaka bato ya mokili oyo? Boyebi bikila yango:

[21] “Kosimba oyo té.” “Kolia wana té.” “Liboko na yo étuta eloko ya boye té.”

[22] Biloko nyonso wana ekoumela té, esalamá kaka po bato básalelaka yango. Mibeko pe mateya ya ndenge wana euti bobele na bato.

[23] Ya solo, yango ezali komonana lokola ya mayele; epesaka bato nzela básambelaka ndenge balingi, bámimonisaka lokola bato ya mawa, pe bámiyokisaka pasi na nzoto. Kasi esalisaka bango penza té; ezali kaka kosepelisa baposa ya bomoto.

Ba-Kolosien — Chapters