Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:41

[1] Nakòmeli yo makambo oyo na miso ya Nzambe pe ya Kristo Yezu, oyo akoya kosambisa bato nyonso, baoyo bazali na bomoi ná baoyo bakufá. Ya solo, ye akozonga pe akoya kozwa bokonzi; bongo nasengi yo na kombo na ye:

[2] Sakola maloba ya Nzambe na molende nyonso, ata bandimi to té. Bimisa polele lokuta ya bato, kebisa bango pe lendisa bango; teya bango na boboto nyonso.

[3] Pamba té mikolo ekoya bato bakolinga koyoka mateya ya solo ata moke té, kasi bakolanda baposa na bango moko, pe bakoluka balakisi ebele, po báya koteya bango bobele makambo oyo balingi koyoka.

[4] Bakoboya mateya ya solo, pe bakobanda kotia matoi na bilobaloba ezangá tina.

[5] Kasi yo, zalaka ekenge tango nyonso, ndima pasi, sakola Sango Malamu, pe kokisa mosala na yo.

[6] Po na ngai, tango ya kotika mokili ekoki. Nasi'namipesi na Nzambe lokola libonza po bátangisa makila na ngai.

[7] Nazali lokola moto asalaka masano: nabundaki etumba ya makofi na ndenge ekoki; nakimaki mbangu tii na suka ya momekano, nazali kaka kondimela Nkolo na motema moko.

[8] Ye azali zuzi ya solo; sik'oyo nazali kozela mokolo akolongisa ngai. Akolongisa kaka ngai moko té, kasi ná baoyo nyonso bazali kozela ye na bolingo, mokolo akozonga na lokumu nyonso.

[9] Sala makasi, óya kokuta ngai awa noki.

[10] Pamba té Demas akimaki ngai pe akei na Tesalonike; po azali kolinga makambo ya mokili oyo. Kresans akei na Galatie pe Tite na Dalmatie.

[11] Bobele Luka moto atikali ná ngai. Kamata Marko, bóya na ye nzela moko; ye moto abongi po na kosalisa ngai.

[12] Natindi Tishike na Efeze.

[13] Tango okoya, memela ngai nzambala oyo natikaki na Troas na ndako ya Karpos. Nazali pe na posa ya mikanda, mingi penza oyo esalamá na poso ya nyama.

[14] Aleksandre mosali-bibende, asalaki ngai mabe mingi; Nkolo akozongisela ye mabe yango.

[15] Yo pe keba na ye, pamba té aboyaki mateya na biso na makasi nyonso.

[16] Tango nasambaki na tribinal mbala ya liboso, ata moto moko té asalisaki ngai. Bato nyonso bakimaki ngai. Nzambe álimbisa bango.

[17] Kasi Nkolo azalaki penepene na ngai pe apesaki ngai makasi po násakola malamu penza sango na ye epai ya bato nyonso oyo bazali Bayuda té. Ye moto abikisaki ngai na monoko ya tambo.

[18] Bobele ye pe moto akobikisa ngai na bapasi nyonso; akobatela ngai po nákoka kokóma na mboka na ye ya Likolo. Lokumu ézala na ye mikolo nyonso! Amen.

[19] Pesa mbote na Prisiye pe na mobali na ye Akilas, pe lisusu na libota ya Onezifore.

[20] Eraste atikalaki na Korente, pe natikaki Trofime na Milet po azalaki na maladi.

[21] Sala makasi po ókóma awa liboso ya tango ya malili. Ebulus, Pudans, Linos, ná ndeko mwasi Klodia ná bandeko mosusu nyonso batindeli yo mbote.

[22] Nkolo Yezu ázala na yo. Bolamu ya Nzambe ézala na bino nyonso.

2 Timoté — Chapters