Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:28

[1] Mbote na yo Tite, Mwana na ngai ya solo kati na bondimi oyo esangisi biso. Zwa bolamu pe boboto euti na Nzambe Tata pe na Kristo Yezu, Mobikisi na biso. Ngai Polo moto natindeli yo mokanda oyo. Nazali mosali ya Nzambe pe ntoma ya Yezu Kristo epai ya bato oyo Nzambe aponá, po bándima Sango Malamu pe báyeba mateya ya solo, bongo bábanda kosepelisa ye pe kotia mitema na bomoi ya seko, oyo ye alakaká uta na ebandeli ya mokili. Nzambe, Mobikisi na biso, akosaka té. Awa tango ye atiaká ekoki, atindeli bato maloba na ye, pe apesi sango yango na maboko na ngai po násakola yango.

[5] Natikaki yo na esanga ya Krete, po óbongisa makambo nyonso oyo etikalaki, pe ótia bambuta-muntu na Eklezya ya vile moko moko, ndenge napesaki yo mitindo.

[6] Moko moko na bango ázala na bizaleli ya malonga, pe ázala kaka na mwasi moko; bana na ye bázala bandimi pe bámonana té lokola bana ya mobulu to ya mitú makasi.

[7] Pamba té batiaka mokengeli ya Eklezya po átalaka makambo ya Nzambe; yango wana esengeli ázala na bizaleli ya malonga; ázala moto ya lofundu té, ya kanda té, álangwaka masanga té, áswanaka na bato té, álukaka kozwa mbongo na mayele mabe té.

[8] Kasi áyambaka bapaya na ndako na ye, álingaka makambo ya malamu, ázala moto ya mayele, ya bosembo pe ya bosantu, pe áyebaka komibatela.

[9] Asengeli kokangama bobele na mateya oyo bapesaki ye, po bato bákoka kotia mitema na maloba na ye. Boye akokoka kolendisa bato na mateya ya solo, pe kokweisa baoyo batiaka tembe.

[10] Pamba té bato ebele, mingi penza na kati ya Bayuda oyo bakómi bandimi, batosaka mateya yango té; batondá bilobela, pe bakosaka bato.

[11] Sukisa bango, pamba té bakotisaka mobulu na mabota pe babebisaka yango mobimba; bateyaka makambo oyo ebongi té, po bázwa mbongo na mayele mabe.

[12] Moto na bango moko ya Krete, oyo bango bamonaka lokola profete, alobaki boye: “Bato ya Krete batondá lokuta; bazali banyama mabe, bagoigoi, pe balingaka kaka se kolia.”

[13] Nyonso oyo alobaki ezali ya solo. Yango wana kebisa bango penza, po bázala na bondimi ya solo,

[14] pe bátika kolanda bilobaloba ya Bayuda, pe mitindo ya bato oyo baboyaka mateya ya solo.

[15] Biloko nyonso oyo bato ya mitema peto basalelaka, ezali peto; kasi bato ya mbindo oyo bazangi bondimi, bamonaka biloko nyonso mbindo, po mayele pe se ya motema na bango etondá na masumu.

[16] Balobaka 'tè bayebi Nzambe, kasi makambo oyo bango basalaka elakisaka 'tè bayebi ye té. Batosaka ye té; bazali bato ya mabe penza, pe bakokaka kosala ata mosala moko té ya malonga.

Tite — Chapters