Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:37

[1] Bongo yo, Mwana na ngai, bolamu oyo Kristo Yezu apesaka yo élendisa yo!

[2] Makambo wana nayebisaki yo na miso ya bato ebele, yebisa yango na bato ya malonga, baoyo bakoki pe koteya bato mosusu.

[3] Ndenge ngai nazali komona pasi, yo pe ndima komona pasi. Zala soda malamu ya Kristo Yezu.

[4] Moto oyo amipesi na mosala ya kisoda atalaka makambo mosusu té, kasi alukaka bobele kosepelisa mokonzi na ye.

[5] Pe moto oyo amekanaka masano ya mbangu, balongisaka ye bobele soki alandaki mibeko.

[6] Moto oyo amonaka pasi na mosala ya bilanga, ye nde moto ya liboso akoki kolia biloko ya elanga na ye.

[7] Kanisaka malamu makambo oyo nalobi; Nkolo akopesa yo mayele ya koyeba yango nyonso.

[8] Kanisaka Yezu Kristo, mwana ya David; Nzambe asekwisá ye. Wana nde Sango Malamu ngai nasakolaka.

[9] Namonaka pasi po na yango; likolo na yango bakangá ngai kutu minyololo, lokola moto ya mobulu; kasi bakoki kokanga maloba ya Nzambe té.

[10] Yango wana, nakangaka motema na makambo nyonso, po na baoyo Nzambe aponá, po Kristo Yezu ábikisa bango pe bázwa lokumu ya seko.

[11] Likambo moko ya solo yango oyo: “Soki tokufi ná ye, tokozala pe na bomoi ná ye.

[12] Soki tokangi mitema, biso ná ye tokozala na bokonzi. Soki toboyi ye, ye pe akoboya biso.

[13] Soki tokangami na maloba na ye té, ye akangamaka kaka na yango; pamba té akoki té koboya maloba na ye moko.”

[14] Loba na bato, bákanisaka makambo wana; yebisa bango na miso ya Nzambe 'tè bátia tembe na maloba ya pamba té, po yango ezangá tina pe ebebisaka bondimi ya baoyo balandaka yango.

[15] Sala nyonso po ómonana moto ya kokoka na miso ya Nzambe; sakolaka makambo ya solo na ndenge ebongi, lokola mosali oyo ayokaka soni té likolo ya mosala na ye.

[16] Kima bilobaloba ya bato oyo batsiolaka Nzambe; pamba té baoyo basololaka masolo ya ndenge wana bakabwaná penza na Nzambe.

[17] Mateya na bango ezali lokola pota oyo ezali kopanzana na nzoto mobimba. Na kati na bango Imené na Filete;

[18] basi'batiká mateya ya solo pe babebisi bondimi ya bato mingi, na ndenge bazali koteya 'tè kosekwa na biso esi'esalamá.

[19] Kasi fondasion ya makasi oyo Nzambe atiá epikamá kaka malamu. Likolo na yango ekòmamá boye: “Nkolo Nzambe ayebi bato na ye”; pe “Moto nyonso oyo alobaka 'tè azali moto ya Nkolo, áboya makambo ya mabe.”

[20] Na kati ya ndako monene bazalaka na banzungu ya ndenge na ndenge. Mosusu ezali ya lokumu, esalamá na or to arjan; basalelaka yango na mikolo ya feti. Mosusu esalamá na nzete to mabelé, basalelaka yango mikolo nyonso.

[21] Soki moto aboyi makambo wana ya mabe, akokani na nzungu ya lokumu; Nzambe akómisi ye moto ya bosantu, oyo abongi na misala nyonso ya malamu.

[22] Yango wana, kima baposa oyo bilenge bazalaka na yango. Luka nde makambo ya bosembo, bondimi, bolingo pe boboto, lisanga na baoyo babondelaka Nkolo na motema moko.

[23] Kotia tembe té na makambo ya pamba pe ya bozoba; yango ebendaka bato báswana.

[24] Nzokande mosali ya Nkolo akoki koswana té, kasi esengeli ázala moto ya malamu epai ya bato nyonso, áyeba koteya na ndenge ekoki, pe kokanga motema.

[25] Bato oyo batiaka tembe ná ye, asengeli koteya bango na boboto penza. Tango mosusu Nzambe akobongola mitema na bango po bákóma koyeba makambo ya solo.

[26] Bongo makanisi ya malamu ekozongela bango, pe bakolongwa na motambo ya zabolo oyo akangaki bango po bátosa ye.

2 Timoté — Chapters