Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:04

[1] Yebaka makambo oyo: mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi.

[2] Pamba té bato bakokóma komilinga bobele bango moko, bakozala na lokoso ya mbongo, lofundu pe lolendo. Bakozala kotsiola Nzambe pe kozanga botosi na biloko ya bosantu. Bakobanda kondimela baboti na bango té, bakozala koboya kopesa mersi na bato oyo basalaka bango malamu.

[3] Bakokóma bato ya nko, bakoyokela bato mawa té, bakokosela baninga makambo, bakotomboka pe bakongala, bakoyina makambo ya malamu.

[4] Bakoteka bandeko na bango, bakosilika noki pe bakovimba na lofundu. Bakobanda kokangama bobele na bisengo ya mokili, kasi na Nzambe té.

[5] Bakomilakisa lokola bato ya Nzambe, kasi bakondima nguya na ye té. Zala mosika na bato ya ndenge wana.

[6] Bato mosusu na kati na bango bakotaka na bandako ya bato, pe bakosaka basi ya mitema pete, oyo batondá na masumu ná baposa ya mabe ndenge na ndenge.

[7] Basi yango balukaka koyekola tango nyonso, kasi bakokaka koyeba penza makambo ya solo ata moke té.

[8] Ndenge banganga-kisi ya Ejipte, Janes ná Jambres bazalaká koboya makamwisi oyo Moize alakisaki bango, se bongo bato wana bazali koboya makambo nyonso ya solo. Mitema na bango ebebá, pe bondimi na bango ekómá ya pamba.

[9] Nzokande bakokende mosika té, po bato nyonso bakomona 'tè bazali bazoba, ndenge esalamaká na Janes ná Jambres.

[10] Kasi yo olandaki ngai na makambo nyonso, ndenge nateyaka, nasalaka, pe nakanaka. Omonaki bondimi ná bolingo na ngai, pe ndenge nakangaka motema pe natiaka molende.

[11] Oyebi ndenge banyokolaki ngai pe bamonisaki ngai pasi na Antioshe, na Ikonium pe na Listre; banyokolaki ngai mingi penza, kasi na makama nyonso Nkolo abikisaki ngai.

[12] Baoyo nyonso balingi komipesa mobimba na Kristo Yezu, bakonyokwama.

[13] Kasi bato ya masumu pe ya lokuta, mabe na bango ekokóma mingi koleka; bakozala kokosa bato, nzokande bazali komikosa bango moko.

[14] Bongo yo, tiaka molende na makambo oyo oyekolaki pe ondimaki na motema moko; pamba té oyebi banani bato bateyaki yo.

[15] Banda bomwana na yo oyebi Mikanda ya Nzambe. Yango ekoki kopesa yo mayele po óndimela Kristo Yezu pe óbika.

[16] Mikanda nyonso ya Nzambe ekòmamá na nguya na ye, pe ebongi po na koteya bato pe kosukisa ndenge nyonso ya lokuta, po na kobongisa bato pe kolakisa bango nzela ya bosembo.

[17] Na ndenge wana moto ya Nzambe akobonga penza, pe akokoka kosala misala nyonso ya malamu.

2 Timoté — Chapters