Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:46

[1] Lakisa bandeko makambo oyo basi'bayebi: Yebisa bango 'tè báyokelaka batambwisi pe bakonzi nyonso, bátosaka bango pe bálukaka tango nyonso kosala misala ya malamu.

[2] Bátsiolaka moto moko té, báswanaka té, bákangaka mitema pe bálakisaka boboto na bato nyonso.

[3] Pamba té biso pe liboso tobungaká nzela, tozalaká bato ya nko, bazoba, batomboki, baumbu ya baposa ya mabe pe ya bisengo ya ndenge na ndenge. Tozalaká koyokana zuwa pe koyinana.

[4] Kasi Nzambe Mobikisi na biso alakisi biso boboto pe bolingo na ye.

[5] Abikisi biso bobele po ayokelaki biso mawa; ezali té po tokokisaki misala ya bosembo. Tango basukolaki biso na mai, tobotamaki mbala ya mibale pe tokómaki bato ya sika, na nguya ya Molimo Mosantu.

[6] Ya solo, po na Mobikisi na biso Yezu Kristo, Nzambe atondisá biso na Molimo Mosantu;

[7] na nguya ya bolamu na ye, akómisá biso bosembo na miso na ye, pe tózwa bomoi ya seko oyo totielaka mitema.

[8] Likambo moko ya solo yango oyo: Nalingi óteyaka mateya yango na molende nyonso, po baoyo bandimaka Nzambe bámipesaka mobimba na misala ya malamu. Oyo nde likambo ya malamu pe ya tina po na bato.

[9] Kasi kotia tembe ya bozoba, kotanga bakombo ebele ebele ya bakoko, koswana pe kobunda po na mibeko, boya makambo yango. Wana ezali makambo ya pamba pe ezangá tina.

[10] Soki moto ameki kokabola bandeko, pesa ye toli mbala moko to mibale; bongo soki ayokeli yo té, tika ye.

[11] Yeba 'tè moto ya ndenge wana abungi nzela pe atondá na masumu; azali komilukela etumbu.

[12] Tango nakotindela yo Artemas to Tishike, sala makasi po óya kokuta ngai na Nikopolis, pamba té nalingi náfanda kuna na tango ya malili.

[13] Zenas oyo azali avoka, pe Apolos basengeli kolanda mobembo na bango; salisa bango malamu po bázanga eloko moko té.

[14] Ebongi bato na biso báyebaka kosepelisa baoyo bazali koluka lisalisi. Boye bakobanda kobimisa misala ya tina.

[15] Baoyo nyonso bazali awa ná ngai batindeli yo mbote. Pesa pe mbote na baoyo balingaka biso kati na bondimi. Bolamu ya Nzambe ézala na bino nyonso.

Tite — Chapters