[1] Kasi yo, pesaka bobele batoli oyo eutaka na mateya ya solo.
[2] Loba na batata oyo bakómi mibange, bázala bato ya malamu, ya lokumu pe ya mayele; na kati ya makambo nyonso bámilakisa bato ya bondimi, ya bolingo pe ya molende.
[3] Loba pe na bamama oyo bakómi mibange, báfanda lokola bato ya bosantu, bátóngaka bato té, pe bázala baumbu ya masanga té. Báyeba kopesa batoli ya malamu,
[4] bálakisa na bilenge basi oyo babalá, ndenge basengeli kolinga mibali pe bana na bango,
[5] bámibatelaka ndenge ebongi, bázala basi ya malamu pe ya mitema pembe, básalaka mosala na bandako na bango, pe bátosaka mibali na bango, po moto moko té átsiola maloba ya Nzambe.
[6] Ndenge moko pe yebisa na bilenge mibali 'tè bámibatelaka malamu
[7] na makambo nyonso. Yo moko osengeli kopesa ndakisa ya misala malamu; teyaka mateya ya solo na ndenge ekoki;
[8] salelaka maloba ya malonga pe ya kokoka. Na ndenge wana bato oyo batiaka tembe na mosala na biso bakomona soni, bakokoka koloba ata likambo moko té ya mabe oyo etali biso.
[9] Yebisa baumbu bátosaka bakonzi na bango pe básepelisaka bango na makambo nyonso. Bátielaka bango tembe té,
[10] báyibaka bango na mayele té. Kasi bámilakisaka basali ya malamu pe ya botosi, boye bato nyonso bakokumisa mateya oyo etali Nzambe, Mobikisi na biso.
[11] Pamba té Nzambe amonisi bolamu na ye na bato nyonso, po bákoka kobika.
[12] Yango moto ezali kolakisa biso 'tè tótika bizaleli ya mabe pe makanisi ya mokili oyo, po tómibatela, tózala bato ya malamu pe ya bosembo na miso na ye awa na se;
[13] pamba té esengo oyo ezangá suka ezali kozela biso, mokolo tokomona lokumu ya Kristo Yezu, oyo azali Nzambe monene pe Mobikisi na biso.
[14] Ye amipesaki po na biso, na tina 'tè álongola biso na mabe nyonso pe áyeisa biso peto, bongo ákómisa biso bato ya mboka na ye, baoyo batiaka molende po na kokokisa misala ya malamu.
[15] Wana ezali ndenge osengeli koloba pe koteya na bokonzi nyonso, po bato básalaka makambo ya malamu pe bátika oyo ya mabe. Tiaka molende penza; moto moko té ámona yo pamba.