[1] Bandeko, ezali ya solo, Nkolo na biso Yezu Kristo akoya, pe biso tokosangana na ye esika moko. Kasi tosengi bino:
[2] bótambola mitú noki té, pe bóbanga té, soki balobi na bino 'tè Mokolo ya Nkolo esi'ekómi; ata soki moto moko asakoli 'tè bayebisi ye yango na Molimo Mosantu; ata kutu balobi 'tè biso bato toteyaki bongo to tokòmaki yango na mokanda.
[3] Moto moko té ákosa bino ata na ndenge nini. Pamba té, liboso 'tè mokolo wana ékóma, bato ebele bakoboya Nzambe, pe Mobebisi akoya komonana. Ye asengeli kobunga seko;
[4] akobanda koyina nyonso oyo bato bakumisaka lokola nzambe, akoloba 'tè aleki yango; akokende kutu kofanda na Ndako ya Nzambe na Yeruzalem, pe akomitia lokola Nzambe.
[5] Bosi'bobosani 'tè nalobaki na bino bongo, tango nazalaki epai na bino?
[6] Bino bosi'boyebi eloko nini ezali kopekisa Mobebisi sik'oyo. Ye nde akomonana bobele na tango oyo Nzambe atiá.
[7] Pamba té nguya ya Mobebisi oyo ebombamá, esi'ebandi kosala. Kasi ye akoya bobele tango moto oyo azali kopekisa ye akolimwa.
[8] Na tango wana Mobebisi akomonana, kasi Nkolo Yezu akoboma ye na pema ya monoko na ye, pe akolimwisa ye na nguya ya koya na ye.
[9] Mobebisi wana akoya na nguya ya Satan, akosala makamwisi pe makambo ya lokuta ya ndenge na ndenge.
[10] Akosala mabe ya ndenge nyonso, po na kokosa bato oyo basengeli kobunga, po baboyaki kolinga makambo ya solo oyo ekokaki kobikisa bango.
[11] Yango wana Nzambe atindeli bango nguya moko oyo ezali kobebisa mitema na bango, pe ezali kosala 'tè bándima makambo ya lokuta.
[12] Boye bato nyonso oyo baboyaka kondima makambo ya solo pe balingaka masumu, bakozwa etumbu.
[13] Kasi, bandeko, tosengeli kopesa Nzambe mersi tango nyonso po na bino bato Nkolo alingaka. Ya solo, Nzambe aponá bino uta ebandeli po bóbika. Pamba té Molimo Mosantu akómisá bino bato ya Nzambe penza; bongo bino pe bokómi kondima makambo ya solo.
[14] Tango tomemelaki bino Sango Malamu, ezali Nzambe moto azalaki kobenga bino po bózwa lokumu ya Nkolo na biso Yezu Kristo.
[15] Yango wana bandeko, bósimba makambo oyo tolakisaki bino, ézala na maloba to na mokanda na biso, bókangama kaka na yango.
[16] Nzambe Tata na biso alingaka biso; na bolamu na ye, asali nyonso po tósilisa mawa libela, pe tótia penza mitema epai na ye. Tosengi ye, ná Nkolo na biso Yezu Kristo,
[17] bálendisa mitema na bino pe bápesa bino makasi ya kosala pe koloba tango nyonso makambo ya malamu.