[1] Baprofete ya lokuta bazalaká na kati ya bato ya Israel; ndenge moko pe balakisi ya lokuta bakozala na kati na bino. Bakokotisela bino mateya oyo ememaka liwa; bakoboya kutu ata Mokonzi oyo alongolaki bango na boumbu; boye bakomilukela liwa ya mbalakaka.
[2] Bato ebele bakolanda makambo na bango ya kindumba, pe likolo na bango mingi bakotsiola nzela ya solo.
[3] Lokola bakotonda na lokoso ya mbongo, bakobanda kokosa bino po bázwa biloko na bino. Kasi Nzambe alalaka té; asi'akatelá bango etumbu ya liwa ya seko.
[4] Pamba té ata kutu ba-anjelu oyo basalaká masumu, Nzambe ayokelaká bango mawa té, kasi abwakaki bango na lifelo esika akangisá bango na kati ya molili, tii mokolo akokatela bango etumbu libela.
[5] Ndenge moko pe adindisaká mokili ya kala na mai, ayokelaki bato ya mabe mawa té; kasi abikisaki bobele Noé oyo azalaki kosakola makambo ya bosembo, ná bato na ye sambo.
[6] Pe lisusu akatelaká mboka Sodome ná Gomore etumbu pe azikisaki yango na móto, apesaki ndakisa na bato nyonso ya mobulu oyo bakoya sima.
[7] Kasi abikisaki Lot, moto ya bosembo, oyo azalaki komona pasi po na bizaleli ya bato wana ya mobulu.
[8] Pamba té moto yango ya bosembo azalaki kofanda na kati na bango, boye abandaki komona pe koyoka mikolo nyonso makambo ya mabe oyo bazalaki kosala; bongo akómaki komona motema pasi mingi po na yango.
[9] Nyonso wana ezali kolakisa ndenge Nzambe abikisaka bato na ye na tango ya pasi, pe ndenge azali kobatela bato ya mabe po ápesa bango etumbu mokolo akokata makambo ya bato nyonso.
[10] Akopesa etumbu ya makasi koleka na bato oyo balandaka baposa ya mabe ya nzoto, pe batsiolaka bokonzi ya Nzambe. Balakisi wana ya lokuta batondá na lofundu pe lolendo, batsiolaka milimo ya Likolo.
[11] Nzokande ata ba-anjelu oyo baleki bango na makasi pe na nguya, batsiolaka milimo wana té; bafundaka yango té epai ya Nzambe.
[12] Bato wana bazali lokola banyama ya zamba oyo ebotamaka po bákanga yango pe báboma yango; bazangá mayele, batsiolaka makambo oyo bayebi té; bakosuka kaka lokola banyama.
[13] Bakomona pasi po na mabe oyo bazali kosala; basepelaka bobele po na kokokisa baposa na bango ya mabe na miso ya bato. Bazali bato ya mbindo, babebá kala. Tango basanganaka ná bino po na kolia, basalaka nyonso po na kopanza makambo na bango ya lokuta.
[14] Balukaka bobele basi ya ndumba, balembaka té po na kosala masumu, bakosaka bato oyo bazangi makasi, batondá na lokoso ya mbongo. Etumbu ya Nzambe ezali kozela bango.
[15] Basi'batiká nzela ya malamu pe babungi, ndenge balandi nzela ya Balaam, Mwana ya Beor; ye azalaki kosala mabe likolo ya mbongo.
[16] Kasi punda na ye ebimisaki mongongo ya moto - ata bapunda elobaka té - epekisaki Balaam átika kosala makambo ya bozoba.
[17] Bato yango bazali lokola bisika oyo bato balukaka mai, nzokande eloko moko té ebimaka wana; bakokani pe na mapata oyo ekitisaka mbula té po mopepe ezali komema yango. Nzambe asi'abombelá bango esika moko ya molili penza.
[18] Na masolo na bango ya lofundu pe ya bozoba, bakosaka bato oyo bauti kolongwa na kati ya baninga na bango ya bizaleli ya mabe; babendaka bango lisusu po bálanda baposa ya soni.
[19] Balakaka bango 'tè bakokóma bato ya bonsomi, nzokande bango moko bazali baumbu ya makambo oyo ememaka liwa; pamba té soki moto akangami na likambo, akómi moumbu na yango.
[20] Bato wana bandimelaki Yezu Kristo, Nkolo pe Mobikisi na biso; po na ye balongwaki na makambo ya mabe ya mokili; bongo lokola bazongeli yango pe bakómi lisusu kokangama na yango, suka na bango ekozala mabe penza koleka ya liboso.
[21] Ebongaki malamu kutu báyeba nzela ya bosembo té; nzokande bayebaki yango, kasi na sima bayei kobwaka mobeko ya bosantu.
[22] Makambo oyo ekweelaki bango ezali kolakisa 'tè balobaka ya solo: “Mbwa ezongelaka lisusu biloko yango moko asanzi,” pe “Ngulu ata basukoli yango, ezongaka noki na potopoto.”