Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 2:42

[1] Gayus ya bolingo, yamba mbote euti na ngai, mbuta-muntu ya Eklezya. Ya solo, nalingaka yo mingi.

[2] Ndeko ya bolingo, nasengi Nzambe 'tè ózalaka malamu penza pe nzoto makasi, ndenge bondimi na yo ezali makasi.

[3] Nazalaki na esengo mingi, tango bandeko mosusu bayaki koyebisa ngai 'tè omipesá mobimba na Nzambe pe ozali kaka kolanda makambo ya solo.

[4] Soki nayoki 'tè bana na ngai balandaka makambo ya solo, yango esepelisaka ngai mingi koleka.

[5] Ndeko ya bolingo, omipesaka na motema moko po na kosalisa bandeko, ézala kutu bapaya.

[6] Bango bayebisaki bandimi ya Eklezya ya awa, ndenge olakisaki bango bolingo. Salisaka bango kaka na ndenge esepelisaka Nzambe, po básilisa mobembo na bango malamu.

[7] Pamba té bazali kosala mobembo yango po na kosakola sango ya Kristo, pe bazwaka lisalisi moko té epai ya bato oyo bayebi Nzambe té.

[8] Yango wana biso nyonso tosengeli kosalisa bandeko ya ndenge wana, boye tokozala kosangana na bango po na mosala ya koyebisa makambo ya solo.

[9] Nakòmelaki Eklezya na bino mwa-mokanda, kasi Diotrefes aboyaka maloba na ngai; ye alingaka komitia liboso ya bato nyonso.

[10] Yango wana, tango nakoya, nakoyebisa mabe nyonso oyo ye asalaka: tango nyonso akoselaka biso makambo; kasi lisusu soki bandeko bayei kotala bino, ayambaka bango té; kutu soki bato balingi koyamba bango, apekisaka bango pe abenganaka bango na Eklezya.

[11] Ndeko ya bolingo, kolanda makambo ya mabe té, kasi landa makambo ya malamu. Moto oyo asalaka malamu azali moto ya Nzambe; oyo asalaka mabe, nanu amoná Nzambe té.

[12] Bato nyonso bazali kokumisa Demetrius; pe maloba ya Nzambe oyo ye asakolaka ezali kosala ndenge moko. Ngai pe nazali kokumisa ye, pe oyebi ’tè nalobaka kaka makambo ya solo.

[13] Nazali na makambo mosusu mingi ya koyebisa yo, kasi nalingi kokòma yango na mokanda té.

[14] Natie motema 'tè sima ya mwa-tango moke nakoya kotala yo po tósolola.

[15] Boboto ézala na yo! Baninga na yo batindeli yo mbote. Pesa pe mbote na baninga na biso moko moko.