Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:48

[1] Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko, ozali penza kitoko makasi ! Miso na yo, na se ya vwale, elala lokola ebenga ; suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi oyo ekitaka na ngomba Galadi.

[2] Minu na yo ezali lokola etonga ya bameme oyo balongoli bapwale, bongo bawuti kosukola yango. Meme moko na moko ezali na lipasa na yango ; moko te ezangi mwana.

[3] Bibebu na yo ezali lokola kitendi ya motane, mpe elobeli na yo epesaka esengo ; matama na yo ezali lokola mbuma ya grenade, na se ya vwale.

[4] Kingo na yo ezali lokola ndako molayi ya Davidi, oyo batongi mpo na kobomba bibundeli ; banguba nkoto moko ediembisami kuna, banguba ya basoda ya mpiko.

[5] Mabele na yo nyonso mibale ezali lokola bana mapasa mibale ya mboloko, oyo ezali kolia kati na bafololo oyo babengaka lisi.

[6] Kino tongo ekotana mpe molili ekolimwa, nakokende na ngomba ya mire mpe na ngomba moke ya ansa.

[7] Mwasi na ngai ya motema, mobimba na yo ezali kitoko mingi ; ata elembo moko te emonani mabe kati na yo.

[8] Longwa na Libani mpe yaka elongo na ngai, mwasi na ngai ya motema ; longwa na Libani, yaka elongo na ngai. Tala wuta na basonge ya bangomba Amana, Seniri mpe Erimoni epai wapi ezali na ndako ya bankosi mpe ngomba ya bankoyi.

[9] Obetisi ngai motema makasi, Oh ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ; obetisi ngai motema na komona etaleli ya miso na yo, mpe na komona moko ya sheneti ya kingo na yo.

[10] Solo, bolingo na yo eleki elengi, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ! Solo, bolingo na yo eleki vino na kitoko ; solo ya mafuta na yo eleki malasi nyonso na kitoko.

[11] Bibebu na yo ezali kobimisa mafuta ya elengi, mwasi na ngai ya motema ; se ya lolemo na yo etondi na mafuta ya nzoyi mpe na miliki, mpe solo ya bilamba na yo ezali lokola solo ya Libani.

[12] Ozali elanga ekangama, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ; ozali etima oyo ezipami mpe liziba oyo ekangami.

[13] Ozali kopesa pio lokola elanga ya banzete ya grenade, oyo ezali na bambuma kitoko, elongo na banzete ya solo kitoko : ene mpe nare,

[14] nare mpe safarani, kaneli ya solo kitoko, sinamoni, elongo na lolenge nyonso ya banzete oyo epesaka malasi ya ansa, ya aloe mpe ya mire, mpe malasi nyonso oyo eleki kitoko.

[15] Ozali liziba kati na elanga, etima oyo etiolaka wuta na Libani.

[16] Oh mopepe ya nor, lamuka ; oh mopepe ya sude, yaka ! Pepa kati na elanga na ngai, mpe tika ete solo kitoko na yango epanzana kino mosika ! Tika ete mwasi na ngai ya motema aya kati na elanga na ye mpe alia mbuma na yango ya elengi makasi !

Loyembo ya Salomo — Chapters