Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 12:05

[1] Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.

[2] Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.

[3] Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te ;

[4] ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.

[5] Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki.

[6] Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »

[7] Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango.

[8] Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »

[9] Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »

[10] Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.

[11] Na sima, baseka mosusu mpe bayaki ; balobaki : « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke ! »

[12] Kasi azongiselaki bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : nayebi bino te. »

[13] Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.

[14] Ekozala lisusu lokola moto moko oyo, wana akomaki pene ya kokende na mobembo, abengaki basali na ye mpe apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye.

[15] Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano ; na mosali ya mibale, batalanta mibale ; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.

[16] Mosali oyo azwaki batalanta mitano abandaki mbala moko kobalola yango na mombongo, mpe mombongo yango ebotaki batalanta mosusu mitano lokola mileki.

[17] Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki.

[18] Kasi moto oyo azwaki kaka talanta moko atimolaki libulu kati na mabele mpe abombaki talanta ya nkolo na ye.

[19] Sima na mikolo ebele, nkolo ya basali wana azongaki mpe alobaki na bango : « Boyebisa ngai ndenge nini bosalelaki bozwi na ngai. »

[20] Mosali oyo azwaki batalanta mitano apusanaki mpe amemaki batalanta mitano mosusu oyo azwaki lokola mileki. Alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mitano ; tala, nazwi batalanta mitano mosusu lokola mileki. »

[21] Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »

[22] Mosali oyo azwaki batalanta mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mibale ; tala, nazwi batalanta mibale mosusu lokola mileki. »

[23] Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »

[24] Bongo mosali oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nayebaki ete ozali moto ya matata, obukaka bambuma na elanga oyo olonaki te mpe olokotaka bambuma na esika oyo obwakaki ata nkona moko te.

[25] Yango wana, nabangaki mpe nakendeki kobomba talanta na yo na se ya mabele. Tala yango oyo, kamata talanta na yo. »

[26] Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe mpe ya goyigoyi ! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te,

[27] mpo na nini opesaki te talanta na ngai epai ya babombi misolo mpo ete, na bozongi na ngai, nakoka kozwa yango elongo na mileki ?

[28] Bobotola ye talanta yango mpe bopesa yango epai ya moto oyo azali na batalanta zomi.

[29] Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu, mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.

[30] Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »

[31] Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.

[32] Bikolo nyonso ya mokili ekosangana liboso na Ye. Bongo akokabola bango na masanga mibale ndenge mobateli bibwele akabolaka bameme mpe bantaba :

[33] akotia bameme na ngambo ya loboko na Ye ya mobali, mpe bantaba, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.

[34] Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.

[35] Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei ; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela ; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu ;

[36] nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki Ngai bilamba ; nabelaki, mpe bosungaki Ngai ; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala Ngai. »

[37] Bongo, bato ya sembo bakoloba na Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala mpe topesaki Yo bilei ; tango nini tomonaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela ?

[38] Tango nini tomonaki Yo mopaya, mpe toyambaki Yo malamu ; tango nini ozalaki bolumbu, mpe biso tolatisaki Yo ?

[39] Tango nini tomonaki Yo kobela to kati na boloko mpe toyaki kotala Yo ? »

[40] Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »

[41] Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.

[42] Pamba te nayokaki nzala, kasi bopesaki Ngai bilei te ; nayokaki posa ya mayi, kasi bopesaki Ngai te mayi ya komela ;

[43] nazalaki mopaya, kasi boyambaki Ngai malamu te epai na bino ; nazalaki bolumbu, kasi bolatisaki Ngai te ; nabelaki mpe nakotaki na boloko, kasi bosungaki Ngai te. »

[44] Bango mpe bakotuna Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi ; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te ? »

[45] Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »

[46] Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.

Sango Malamu kolanda Matayo — Chapters