Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:18

[1] Tala molongo ya mbotama ya Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi mpe ya Abrayami :

[2] Abrayami abotaki Izaki ; Izaki abotaki Jakobi ; Jakobi abotaki Yuda mpe bandeko na ye ya mibali ;

[3] Yuda abotaki Peretsi mpe Zera na nzela ya Tamari, mwasi na ye ; Peretsi abotaki Etsironi ; Etsironi abotaki Arami ;

[4] Arami abotaki Aminadabi ; Aminadabi abotaki Nashoni, mpe Nashoni abotaki Salima ;

[5] Salima abotaki Boazi na nzela ya Raabi, mwasi na ye ; Boazi abotaki Obedi na nzela ya Rite, mwasi na ye ; Obedi abotaki Izayi,

[6] mpe Izayi abotaki mokonzi Davidi. Davidi abotaki Salomo na nzela ya mwasi ya Uri ;

[7] Salomo abotaki Roboami ; Roboami abotaki Abiya ; Abiya abotaki Asa ;

[8] Asa abotaki Jozafati ; Jozafati abotaki Yorami ; Yorami abotaki Oziasi ;

[9] Oziasi abotaki Yotami ; Yotami abotaki Akazi ; Akazi abotaki Ezekiasi ;

[10] Ezekiasi abotaki Manase ; Manase abotaki Amoni ; Amoni abotaki Joziasi ;

[11] Joziasi abotaki Yekonia mpe bandeko na ye ya mibali wana bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni.

[12] Sima na bana ya Isalaele kokende na bowumbu, na Babiloni, Yekonia abotaki Shealitieli ; Shealitieli abotaki Zorobabeli ;

[13] Zorobabeli abotaki Abiwudi ; Abiwudi abotaki Eliakimi ; Eliakimi abotaki Azori ;

[14] Azori abotaki Tsadoki ; Tsadoki abotaki Akimi ; Akimi abotaki Eliwudi ;

[15] Eliwudi abotaki Eleazari ; Eleazari abotaki Matani ; Matani abotaki Jakobi ;

[16] Jakobi abotaki Jozefi, mobali ya Mari ; mpe Mari azalaki mama ya Yesu oyo babengaka Klisto.

[17] Kobanda na Abrayami kino na Davidi, elekaki bikeke zomi na minei ; kobanda na Davidi kino na tango oyo bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni, elekaki lisusu bikeke zomi na minei ; mpe kobanda na bowumbu, na Babiloni, kino na Klisto, elekaki lisusu bikeke zomi na minei.

[18] Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu.

[19] Jozefi, mobandami na ye ya libala, azalaki moto ya sembo. Boye, lokola Jozefi alingaki te koyokisa Mari soni na miso ya bato, azwaki mokano ya koboya Mari na kimia.

[20] Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.

[21] Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. »

[22] Makambo wana nyonso esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli :

[23] « Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. »

[24] Tango Jozefi alamukaki, asalaki makambo oyo anjelu na Nkolo atindaki ye kosala mpe azwaki Mari lokola mwasi na ye.

[25] Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu.

Sango Malamu kolanda Matayo — Chapters