[1] Bafarizeo mpe Basaduseo bayaki epai na Yesu mpo na kotiela Ye motambo ; basengaki na Ye ete alakisa bango elembo moko kowuta na Likolo.
[2] Yesu azongiselaki bango : — Na pokwa, bolobaka : « Mokolo ya lobi ekozala mokolo malamu, pamba te likolo ezali motane ! »
[3] Mpe na tongo, bolobaka : « Mvula makasi ekobeta lelo, pamba te mapata eyindi. » Solo, boyebi kososola bilembo oyo elakisaka soki mvula ekobeta to ekobeta te, kasi bozangi makoki ya kososola bilembo ya tango !
[4] Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona. Bongo atikaki bango wana mpe akendeki.
[5] Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa.
[6] Yesu alobaki na bango : — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !
[7] Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango : — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te !
[8] Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : — Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ?
[9] Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ?
[10] Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ?
[11] Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino : bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ?
[12] Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo.
[13] Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye : — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani ?
[14] Bazongisaki : — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli.
[15] Yesu atunaki bango lisusu : — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?
[16] Simona Petelo azongisaki : — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi.
[17] Yesu alobaki na ye : — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona ! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.
[18] Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.
[19] Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo ; nyonso oyo okokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo okofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.
[20] Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya.
[21] Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.
[22] Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : — Nkolo, tika ete Nzambe abatela Yo mosika ya makambo wana ! Ekokomela Yo te !
[23] Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.
[24] Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.
[25] Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu.
[26] Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?
[27] Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.
[28] Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.