[1] Oh Yawe, kanisa makambo oyo ekomeli biso ! Tala mpe mona soni na biso !
[2] Libula na biso ekeyi na maboko ya bapaya, bandako na biso ekeyi na maboko ya bato mosusu.
[3] Tokomi lokola bana bitike, tozangi tata ; bamama na biso bakomi lokola basi bakufisa mibali !
[4] Tosengeli kofuta mbongo ata mpo na mayi na biso ya komela to mpe mpo na bakoni na biso !
[5] Banguna na biso bazali kolanda biso, bakomi na sima ya mokongo ; bongo biso tolembi nzoto, tozangi kimia.
[6] Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri mpo ete bapesa biso bilei.
[7] Solo batata na biso basalaki masumu, kasi bazali lisusu te, bongo biso tokomi komema mokumba ya etumbu na bango.
[8] Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango.
[9] Tozali kozwa bilei na biso na motuya ya bomoi na biso, likolo na mopanga ya babomi kuna na esobe.
[10] Poso ya nzoto na biso ekomi moto lokola nde balekisi yango na mbabola, pamba te nzala ezali kotumba biso makasi.
[11] Basambwisi basi kati na Siona, mpe bilenge basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te kati na bingumba ya Yuda.
[12] Badiembiki bakalaka, na maboko na bango ; mpe bapesi bakambi lokumu te.
[13] Bilenge mibali bazali komema libanga oyo banikelaka ble ; bongo bana mike bazali kotepatepa na se ya kilo ya bakoni.
[14] Bakambi batika kokende na ekuke ya engumba, mpe bilenge batika kobeta mindule.
[15] Esengo ezalaka lisusu te kati na mitema na biso, mabina na biso ebongwana matanga.
[16] Mitole ekweyi wuta na mito na biso. Mawa na biso, mpo ete tosali masumu !
[17] Soki mitema na biso ezali komona pasi mpe soki miso na biso ekomi komona molili,
[18] ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna.
[19] Oh Yawe, ozali Mokonzi seko na seko ; Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.
[20] Mpo na nini obosana biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini osundola biso tango molayi ?
[21] Oh Yawe, zongisa biso epai na Yo ; mpe tokozonga penza ! Yeisa mikolo na biso sika ndenge ezalaki na tango ya kala !
[22] Boni, osundoli biso solo mpo na libela mpe otombokeli biso na kanda eleka ndelo ?