[1] Nazali moto oyo amona pasi na nzela ya fimbu ya kanda na Ye.
[2] Amemaki ngai mpe atambolisaki ngai kati na molili, kasi na pole te.
[3] Solo, mokolo mobimba, azalaki kobalola loboko na Ye mpo na kotelemela ngai tango nyonso.
[4] Abebisaki nzoto na ngai mpe poso na yango, abukaki mikuwa na ngai.
[5] Mpo na kotelemela ngai, atongaki zingazinga na ngai mir ya ngenge mpe ya pasi.
[6] Atongelaki ngai ndako ya kovanda kati na molili, lokola bato ya tango ya kala oyo bakufa.
[7] Azingelaki ngai na bamir mpo ete nakima te ; akangaki ngai na minyololo ya kilo.
[8] Ezala soki nabeleli mpo na kosenga lisungi, azali koyoka libondeli na ngai te.
[9] Akangaki nzela na ngai na mabanga minene mpe abebisaki banzela na ngai ya mike.
[10] Azalaki mpo na ngai lokola ngombolo oyo ebongami, lokola nkosi oyo ebombameli ngai ;
[11] apengwisaki ngai nzela, apasolaki ngai mpe akomisaki ngai eloko ya pamba.
[12] Abendaki tolotolo na Ye mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga.
[13] Atobolaki motema na ngai, na makonga oyo ewutaki na libenga na Ye.
[14] Nakomaki eloko ya liseki na miso ya bato na ngai nyonso ; bazalaki tango nyonso kotiola ngai na banzembo.
[15] Atondisaki ngai na matiti ya bololo mpe alangwisaki ngai na masanga ya bololo.
[16] Abukaki minu na ngai na mabanga, azindisaki ngai na putulu.
[17] Nazangaki kimia, nayebaki lisusu te nini yango bolamu.
[18] Boye nalobaki : « Lokumu mpe makambo nyonso oyo natielaki elikya na Yawe esili ! »
[19] Nakanisi pasi mpe minyoko na ngai, ezali lokola ngenge mpe masanga ya bololo.
[20] Tango nyonso nakanisaka yango, motema na ngai ebukanaka.
[21] Nzokande, tala makambo oyo nakanisaka ; oyo mpo na yango, nazalaka na elikya :
[22] Bolamu ya Yawe esili te, mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;
[23] ekomaka ya sika tongo nyonso. Solo, boyengebene na Yo ezali monene !
[24] Namilobeli : « Yawe azali elikya na ngai ; yango wana nakotia motema epai na Ye. »
[25] Yawe azali malamu mpo na bato oyo batielaka Ye elikya, mpo na bato oyo balukaka Ye !
[26] Ezali malamu kozela na kimia lobiko kowuta na Yawe !
[27] Ezali malamu mpo na moto komema ekangiseli na ye wana azali nanu elenge.
[28] Tika ete avanda kimia mpe avanda ye moko, pamba te Yawe nde alingi bongo mpo na ye.
[29] Tika ete atia elongi na ye na mabele : tango mosusu elikya ekoki kozala.
[30] Tika ete apesa litama mpo ete babeta ye mbata, mpe tika ete atonda na soni !
[31] Pamba te Nkolo abwakaka moto te mpo na libela.
[32] Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa mpo na bolingo monene na Ye.
[33] Ezalaka na esengo te nde Yawe ayokisaka bato soni to atindelaka bato pasi.
[34] Tango banyataka na makolo bakangami nyonso ya mokili,
[35] tango babebisaka lokumu ya moto na miso ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo,
[36] tango banyokolaka moto kati na kosambisama, boni, Nkolo amonaka yango te ?
[37] Nani akoki kaka kobimisa liloba mpo ete likambo esalema soki Nkolo apesi yango nzela te ?
[38] Boni, ezali te wuta na monoko ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo nde pasi mpe bolamu ekomelaka bato ?
[39] Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye ?
[40] Tokota na mozindo ya kososola banzela na biso mpe totala malamu etamboli na biso, bongo tozonga epai na Yawe ;
[41] totombola mitema mpe maboko na biso epai ya Nzambe oyo azali na Lola mpe toloba :
[42] « Tosalaki masumu mpe totombokelaki Yo, yango wana olimbisaki te.
[43] Omizipaki na kanda ndenge bamizipaka liputa, onyokolaki biso mpe obomaki na mawa te.
[44] Omizipaki lipata mpo ete mabondeli edusola te.
[45] Okomisaki biso lokola eloko ya nkele mpe ya tina te na miso ya bikolo.
[46] Banguna na biso nyonso bafungolaki minoko mpo na kotiola biso ;
[47] libula na biso ekomi : somo, mabulu, kobebisama mpe kufa. »
[48] Miso na ngai ezali kosopa miluka ya mpinzoli mpo ete bato na ngai babebisami.
[49] Miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli tango nyonso mpe ezali kolemba te,
[50] kino tango Yawe akotala mpe akomona wuta kuna na Lola.
[51] Makambo oyo miso na ngai ezali komona ezali koyokisa motema na ngai pasi likolo na bana basi nyonso ya engumba na ngai.
[52] Bato oyo bayinaka ngai na pamba balukaki kokanga ngai lokola ndeke ;
[53] balukaki koboma ngai kati na libulu, babwakelaki ngai mabanga ;
[54] mayi etondaki kino kozipa moto na ngai mpe nakanisaki ete nakomi pene ya kokufa.
[55] Nabelelaki Kombo na Yo, Yawe, wuta na mozindo ya libulu.
[56] Oyokaki ngai libondeli na ngai : « Kokanga matoyi na Yo te wana nazali kobelela Yo mpo ete oyoka kolela na ngai mpe nazwa lisungi kowuta na Yo ! »
[57] Tango nabelelaki Yo, opusanaki pene na ngai mpe olobaki : « Kobanga te ! »
[58] Nkolo, obundelaki ngai solo, osikolaki bomoi na ngai !
[59] Yawe, omonaki mabe oyo basalaki ngai : longisa ngai !
[60] Omonaki solo posa na bango ya kozongisa mabe na mabe mpe mabongisi na bango ya kosala ngai mabe.
[61] Yawe, oyokaki mafinga na bango, mabongisi na bango ya kosala ngai mabe,
[62] maloba ya bayini na ngai mpe makanisi na bango ya kosala ngai mabe.
[63] Tala mpe mona bango ! Ezala bavandi to batelemi, mosala na bango : kotiola ngai na banzembo na bango.
[64] Yawe, pesa bango lifuti oyo ekoki na bango kolanda misala na bango ;
[65] yeisa mitema na bango makasi, kweyisela bango bilakeli mabe na Yo ;
[66] nyokola bango na kanda makasi na Yo mpe bebisa bango na se ya Lola na Yo, Yawe !