Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 3:40

[1] Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.

[2] Isalaele azali kobelela Ngai : « Oh Nzambe na biso, toyebi Yo ! »

[3] Kasi Isalaele abwaki makambo malamu ; yango wana, monguna akolanda ye.

[4] Batunaki Ngai te tango batiaki bakonzi mpe baponaki bakambi. Bamisalelaki banzambe ya bikeko na palata mpe na wolo na bango mpo na libebi na bango moko.

[5] Oh Samari, nzambe na yo ya ekeko ya mwana ngombe ya mobali ezali nkele ! Kanda na Ngai epeli mpo na kobebisa bango. Kino tango nini bakokoka te kotambola na bopeto ?

[6] Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.

[7] « Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.

[8] Isalaele abebisami ; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba !

[9] Pamba te bakendeki na Asiri lokola ane ya zamba oyo ezali kotelengana yango moko. Efrayimi apesaki bakado epai ya bamakangu na ye.

[10] Ata apesaki bakado kati na bikolo, sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika moko mpe bakobanda kosila kokufa na se ya minyoko ya mokonzi moko ya nguya.

[11] Ata Efrayimi atongi bitumbelo ebele mpo na kolongola masumu na ye, kasi bitumbelo yango ekomemisa ye kaka masumu.

[12] Nakomelaki bango makambo ebele ya Mobeko na Ngai, kasi bamonaki yango lokola eloko moko ya mopaya.

[13] Bazali kobonza bambeka lokola likabo mpo na Ngai, mpe bazali kolia misuni ; kasi Yawe azali kosepela na bango te. Sik’oyo, akokanisa mabe na bango mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango : bakozonga na Ejipito.

[14] Isalaele abosani Mokeli na ye mpe atongi bandako ya kitoko ; Yuda atongi bingumba ebele batonga makasi ; kasi Ngai nakotinda moto kati na bingumba na bango, mpe ekotumba bandako na bango ya kitoko. »

Oze — Chapters