[1] Efrayimi azingeli Ngai na lokuta, mpe libota ya Isalaele, na kokosa ; kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, elongo na Mosantu ya solo.
[2] Efrayimi aliaka mopepe ; mikolo nyonso, alandaka mopepe ya este ; mosala na ye kokosa mpe kosala bato mabe. Asalaka boyokani elongo na Asiri mpe atindaka mafuta ya olive na Ejipito.
[3] Yawe alingi kosamba na Yuda ; akopesa Jakobi etumbu kolanda etamboli na ye mpe akofuta ye kolanda misala na ye.
[4] Na libumu ya mama na bango, akangaki ndeko na ye ya mobali na litambe ; tango akomaki mokolo, abundaki na Nzambe.
[5] Abundaki na anjelu mpe alongaki, alelaki mpe asengaki ngolu na ye. Jakobi akutanaki na ye na Beteli, mpe ezali kuna nde asololaki na ye.
[6] Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, Kombo na Ye ya lokumu ezali Yawe.
[7] Kasi yo, osengeli kozonga epai ya Nzambe na yo ; batela bolingo mpe bosembo mpe tia tango nyonso elikya na Nzambe na yo.
[8] Bato ya Kanana basalelaka emekelo kilo ya lokuta, balingaka kaka kokosa.
[9] Efrayimi alobaka na lolendo nyonso : « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »
[10] Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito ; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.
[11] Nalobaki na nzela ya basakoli, napesaki bango bimoniseli ebele mpe nalobaki na masese na nzela na bango.
[12] Lokola Galadi etondi na mabe, ekokoma eloko pamba mpo ete bato na yango babonzaki bangombe ya mibali na Giligali ; mpe bitumbelo na bango ekobukama mpe ekokoma mipiku ya mabanga kati na banzela ya mikala ya bilanga.
[13] Jakobi akimaki na mokili ya Siri ; Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi ; mpe mpo na kobala mwasi yango, andimaki kokoma mobateli bibwele.
[14] Yawe asalelaki mosakoli mpo na kobimisa Isalaele wuta na Ejipito, abatelaki ye na nzela ya mosakoli.
[15] Kasi Efrayimi atumbolaki kanda na Ye makasi, yango wana, Nkolo na ye akotangela ye ngambo ya makila oyo asopaki mpe akofuta ye kolanda mabe na ye.