[1] Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
[2] Abambaki yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Alatisaki mpe songe na yango wolo.
[3] Asalelaki yango bapete minei ya wolo mpe atiaki yango basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.
[4] Asalaki mabaya mibale na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
[5] Akotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya Sanduku, mpo na komemela yango.
[6] Asalaki mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
[7] Asalaki bikeko mibale ya basheribe oyo atiaki na suka mibale ya mofinuku ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.
[8] Atiaki ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe ekeko mosusu, na suka mosusu. Akangisaki bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale.
[9] Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bazalaki ngambo na ngambo, mpe miso na bango etalaki mofinuku.
[10] Asalaki mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.
[11] Abambaki yango wolo ya peto mpe atiaki lisusu wolo na pembeni na yango.
[12] Azingelaki mesa yango na libaya oyo ezalaki na basantimetele pene mwambe na monene mpe atiaki wolo na pembeni ya libaya yango.
[13] Asalaki bapete minei ya wolo mpe atiaki yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezalaki.
[14] Bapete ezalaki pene ya libaya oyo ezingelaki mesa, mpe bakotisaki kati na bapete yango mabaya ya komemela Sanduku.
[15] Asalaki na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa, mpe abambaki yango wolo.
[16] Asalaki na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.
[17] Asalaki na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ezalaki ekangana lokola eloko moko.
[18] Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda ezalaki na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu.
[19] Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, atiaki bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
[20] Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, ezalaki na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.
[21] Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ezalaki na mbuma moko ; mpe ezalaki bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda.
[22] Bambuma mpe bitape ezalaki ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso esalemaki na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.
[23] Asalaki minda sambo ; mpe asalaki na wolo ya peto bisimbelo elongo na basani ya putulu.
[24] Asalelaki bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.
[25] Betisaleyeli asalaki etumbelo ya malasi na nzete ya akasia. Molayi mpe mokuse na yango ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ezalaki na metele moko. Maseke na yango ekangamaki na etumbelo mpe esalaki kaka eloko moko.
[26] Abambaki wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke na yango ; mpe azingelaki pembeni na yango na libende ya wolo.
[27] Asalaki mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo.
[28] Asalaki mabaya yango na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo.
[29] Asalaki mafuta ya epakolami ya bule, malasi ya solo kitoko mpe ya peto, oyo esalemi na mosali malasi.