Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 9:40

[1] Yawe alobaki na Moyize :

[2] — Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu.

[3] Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango : wolo, palata mpe bronze,

[4] bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, lino ya kitoko, bapwale ya ntaba,

[5] baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, banzete ya akasia,

[6] mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko ;

[7] mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata.

[8] Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango.

[9] Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo.

[10] Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano.

[11] Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo.

[12] Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu.

[13] Okosala mabaya mibale na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo.

[14] Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango.

[15] Mabaya yango ekotikala libela kati na bapete ya sanduku : bakolongola yango te.

[16] Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo.

[17] Okosala mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.

[18] Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto.

[19] Okotia ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe mosusu, na suka mosusu. Okokangisa bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale.

[20] Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku.

[21] Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku.

[22] Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele.

[23] Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano.

[24] Okobamba yango wolo ya peto mpe okotia lisusu wolo na pembeni na yango.

[25] Okozingela mesa yango na libaya oyo ekozala na basantimetele pene mwambe na monene, mpe okotia wolo na pembeni ya libaya yango.

[26] Okosala bapete minei ya wolo mpe okotia yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezali.

[27] Bapete ekozala pene ya libaya oyo ekozingela mesa, mpe bakokotisa kati na bapete yango mabaya ya komemela sanduku.

[28] Okosala na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa mpe okobamba yango wolo.

[29] Okosala na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga.

[30] Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai.

[31] Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko.

[32] Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda esengeli kozala na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu.

[33] Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, okotia bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.

[34] Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, esengeli kozala na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo.

[35] Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ekozala na mbuma moko ; mpe ekozala bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda.

[36] Bambuma mpe bitape ekozala ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso ekosalema na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto.

[37] Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo.

[38] Okosala na wolo ya peto bibende oyo bazwelaka makala ya moto mpe basani ya putulu.

[39] Okosalela bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso.

[40] Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba.

Kobima — Chapters