[1] Bana mibali ya Benjame : Bela, mwana ya liboso ; Ashibeli, mwana ya mibale ; Ara, mwana ya misato ;
[2] Noa, mwana ya minei ; mpe Rafa, mwana ya mitano.
[3] Bana mibali ya Bela : Adari, Gera, Abiwudi,
[4] Abishuwa, Namani, Aowa,
[5] Gera, Shefufani mpe Urami.
[6] Tala bana mibali ya Ewudi oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Geba, mpe bamemaki bato ya Geba na Manaati :
[7] Namani, Ayiya mpe Gera. Ezalaki Gera, tata ya Uza mpe ya Ayiwudi, nde moto amemaki bango na bowumbu.
[8] Shaarayimi abotaki bana na mokili ya Moabi, sima na ye kobengana basi na ye mibale : Ushimi mpe Baara.
[9] Na nzela ya Odeshi, mwasi na ye ya sika, abotaki : Yobabi, Tsibia, Mesha, Malikami,
[10] Yeutsi, Sakia mpe Mirima. Bango nde bazalaki bana mibali ya Shaarayimi, oyo bakomaki bakambi ya bituka.
[11] Elongo na Ushimi, mwasi na ye, Shaarayimi abotaki : Abitubi mpe Elipaali.
[12] Bana mibali ya Elipaali : Eberi, Misheami mpe Shemeri oyo atongaki bingumba Ono mpe Lodi elongo na bamboka na yango ya mike.
[13] Beria mpe Shema oyo bazalaki bakambi ya bituka ya bavandi ya Ayaloni babenganaki bato ya Gati.
[14] Bana mibali ya Beria : Ayiyo, Shashaki, Yeremoti,
[15] Zebadia, Aradi, Ederi,
[16] Mikaeli, Yishipa mpe Yoa, bana mibali ya Beria.
[17] Zebadia, Meshulami, Iziki, Eberi,
[18] Yishimerayi, Yiziliya mpe Yobabi bazalaki bana mibali ya Elipaali.
[19] Yakimi, Zikiri, Zabidi,
[20] Elienayi, Tsilitai, Elieli,
[21] Adaya, Beraya mpe Shimirati bazalaki bana mibali ya Shimei.
[22] Yishipani, Eberi, Elieli,
[23] Abidoni, Zikiri, Anani,
[24] Anania, Elami, Anitotiya,
[25] Yifidea mpe Penueli bazalaki bana mibali ya Shashaki.
[26] Shamisherayi, Shearia, Atalia,
[27] Yaareshia, Eliya mpe Zikiri bazalaki bana mibali ya Yeroami.
[28] Bango nyonso bazalaki bakambi ya bituka ndenge bakomama na buku ya mabota na bango, mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi.
[29] Yeyeli, tata ya Gabaoni, azalaki kovanda na Gabaoni. Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Maaka. »
[30] Abidoni azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali ; sima, Tsuri, Kishi, Bala, Nadabi,
[31] Gedori, Ayiyo mpe Zekeri.
[32] Mikiloti abotaki mwana mobali, Shimea. Bango mpe bazalaki kovanda na Yelusalemi elongo na mabota na bango.
[33] Neri abotaki Kishi ; Kishi abotaki Saulo ; Saulo abotaki Jonatan, Maliki-Shuwa, Abinadabi mpe Eshibala.
[34] Jonatan abotaki Meriba-Bala ; Meriba-Bala abotaki Mishe.
[35] Mishe abotaki : Pitoni, Meleki, Taereya mpe Akazi.
[36] Akazi abotaki Yeoyada ; Yeoyada abotaki Alemeti, Azimaveti mpe Zimiri, tata ya Motsa.
[37] Zimiri abotaki Motsa ; Motsa abotaki Bineya ; Bineya abotaki Rafa ; Rafa abotaki Eleasa ; mpe Elasa abotaki Atseli.
[38] Atseli abotaki bana mibali motoba : Azirikami, Bokuru, Isimaeli, Shearia, Abidiasi mpe Anani. Bango nyonso nde bazalaki bana mibali ya Atseli.
[39] Bana mibali ya Esheki, ndeko mobali ya Atseli : Ulami, mwana na ye ya liboso ; Yewushi, mwana ya mibale ; mpe Elifeleti, mwana ya misato.
[40] Bana mibali ya Ulami bazalaki basoda ya mpiko oyo bayebaki kosalela tolotolo. Bazalaki na bana mibali mpe bakoko ya mibali ebele : nkama moko na tuku mitano. Bango nyonso bazalaki bakitani ya Benjame.