[1] Adamu, Seti, Enoshi,
[2] Kenani, Maalalele, Yeredi,
[3] Enoki, Metusalemi, Lemeki,
[4] Noa, Semi, Cham mpe Jafeti.
[5] Bana mibali ya Jafeti : Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
[6] Bana mibali ya Gomeri : Ashikenazi, Difati mpe Togarima.
[7] Bana mibali ya Yavani : Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
[8] Bana mibali ya Cham : Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
[9] Bana mibali ya Kushi : Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema : Sheba mpe Dedani.
[10] Kushi azalaki tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.
[11] Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu,
[12] ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
[13] Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,
[14] ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi,
[15] ya Evi, ya Ariki, ya Sini,
[16] ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati.
[17] Bana mibali ya Semi : Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami. Bana mibali ya Arami : Utsi, Uli, Geteri mpe Mesheki.
[18] Aripakishadi abotaki Shela, mpe Shela abotaki Eberi.
[19] Eberi abotaki bana mibali mibale ; moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi » oyo elingi koloba : Kokabola ; pamba te ezalaki na tango na ye nde bakabolaki mabele. Kombo ya mwana mosusu ezalaki « Yokitani. »
[20] Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera,
[21] Adorami, Uzali, Dikila,
[22] Obali, Abimaeli, Saba,
[23] Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
[24] Semi, Aripakishadi, Shela,
[25] Eberi, Pelegi, Rewu,
[26] Serugi, Naori, Tera,
[27] mpe Abrami oyo azali Abrayami.
[28] Bana mibali ya Abrayami : Izaki mpe Isimaeli.
[29] Tala bakitani na bango : Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli ; Kedari, Adibeli, Mibisami,
[30] Mishima, Duma, Masa, Adadi, Tema,
[31] Yeturi, Nafishi mpe Kedima. Bango nde bazalaki bana mibali ya Isimaeli.
[32] Bana mibali oyo Abrayami abotaki na Ketura, makangu na ye : Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa. Bana mibali ya Yokishani : Saba mpe Dedani.
[33] Bana mibali ya Madiani : Efa, Eferi, Enoki, Abida mpe Elida. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Ketura.
[34] Abrayami azalaki tata ya Izaki. Bana mibali ya Izaki : Ezawu mpe Isalaele.
[35] Bana mibali ya Ezawu : Elifazi, Reweli, Yewushi, Yaelami mpe Kora.
[36] Bana mibali ya Elifazi : Temani, Omari, Tsefo, Gaetami, Kenazi, Timina mpe Amaleki.
[37] Bana mibali ya Reweli : Naati, Zera, Shama mpe Miza.
[38] Bana mibali ya Seiri : Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana, Dishoni, Etseri mpe Dishani.
[39] Bana mibali ya Lotani : Ori mpe Omani. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani.
[40] Bana mibali ya Shobali : Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami. Bana mibali ya Tsibeoni : Aya mpe Ana.
[41] Mwana mobali ya Ana : Dishoni. Bana mibali ya Dishoni : Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani.
[42] Bana mibali ya Etseri : Bilani, Zavani mpe Yaakani. Bana mibali ya Dishani : Utsi mpe Arani.
[43] Tala bakonzi oyo bakambaki Edomi liboso ete Isalaele ekoma kokambama na mokonzi : Bela, mwana mobali ya Beori, oyo kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. »
[44] Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.
[45] Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.
[46] Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi, akitanaki na ye na bokonzi. Alongaki bato ya Madiani na mokili ya bato ya Moabi. Engumba na ye ezalaki Aviti.
[47] Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi.
[48] Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi.
[49] Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.
[50] Tango Bala-Anani akufaki, Adadi akitanaki na ye na bokonzi. Engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi mpe koko ya Mezaabi.
[51] Adadi mpe akufaki. Tala bakombo ya bakambi ya Edomi : Timina, Aliva, Yeteti,
[52] Olibama, Ela, Pinoni,
[53] Kenazi, Temani, Mibitsari,
[54] Magidieli mpe Irami. Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi.