[1] Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi.
[2] Atunaki ngai : — Ozali komona nini ? Nazongiselaki ye : — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda.
[3] Ezali lisusu na banzete mibale ya olive pene ya etelemiselo ya minda : moko na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi.
[4] Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : — Nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai ?
[5] Azongiselaki ngai : — Boni, oyebi te soki elingi kolakisa nini ? Nazongiselaki ye : — Te, nkolo na ngai !
[6] Alobaki na ngai : — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
[7] Ozali nani, ngomba monene ? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo : « Tika ete Nzambe apambola yango ! Tika ete Nzambe apambola yango ! »
[8] Bongo Yawe alobaki na ngai :
[9] — Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
[10] Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.
[11] Natunaki Anjelu : — Banzete mibale ya olive oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali mpe ya mwasi ya etelemiselo ya minda elakisi nini ?
[12] Natunaki ye lisusu : — Bitape mibale ya nzete ya olive, oyo ezali pembeni ya batio mibale ya wolo oyo ebimisaka mafuta oyo engalaka elakisi nini ?
[13] Azongiselaki ngai : — Boni, oyebi te soki elakisi nini ? Nazongisaki : — Te, nkolo na ngai.
[14] Boye, alobaki : — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.