[1] Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi.
[2] Balobaki : — Boni, Yawe alobaka kaka na nzela ya Moyize ? Alobaki mpe na nzela na biso te ? Yawe ayokaki bango.
[3] Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili.
[4] Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami : — Boya bino misato na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bango nyonso misato bakendeki.
[5] Yawe akitaki na likonzi ya lipata, atelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo mpe abengaki Aron mpe Miriami. Tango bango mibale batelemaki liboso,
[6] alobaki : — Boyoka maloba na Ngai ! Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, namimonisaka Ngai moko epai na ye na nzela ya bimoniseli, nalobaka na ye na nzela ya bandoto.
[7] Kasi ezalaka bongo te mpo na Moyize, mosali na Ngai. Azali sembo kati na ndako na Ngai mobimba.
[8] Nasololaka na ye elongi na elongi, na polele penza kasi na masese te. Amonaka lolenge ya Yawe. Mpo na nini bozali na somo te ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ?
[9] Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango.
[10] Tango kaka lipata elongwaki likolo ya Ndako ya kapo, bokono ya maba ezwaki mbala moko Miriami : ezalaki pembe lokola mvula ya pembe. Aron abalukaki mpo na kotala Miriami mpe amonaki ete azwi bokono ya maba.
[11] Bongo Aron alobaki na Moyize : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Kotangela biso te masumu oyo tosali na bozoba !
[12] Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola !
[13] Boye, Moyize abelelaki Yawe : — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye !
[14] Yawe azongiselaki Moyize : — Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi ; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo ? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga.
[15] Boye batiaki Miriami libanda ya molako mikolo sambo mpe bato bazalaki kotambola te kino tango Miriami azongaki.
[16] Sima na yango, bato batikaki Atseroti mpe bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Parani.