Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 12:11

[1] Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene.

[2] Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe. Na mobu yango, Nzambe alobaki na Yoane, mwana mobali ya Zakari, kati na esobe.

[3] Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani ; na mateya na ye, azalaki koloba : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. »

[4] Boye nde ekokisamaki, makambo oyo mosakoli Ezayi akomaki kati na buku na ye : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike !

[5] Mabwaku nyonso ekotondisama, bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse ekokitisama, babalabala oyo ezali nyoka-nyoka ekosembolama, banzela ya mabulu-mabulu ekobongisama,

[6] mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › »

[7] Yoane alobaki na ebele ya bato oyo bayaki epai na ye mpo ete abatisa bango : « Bana ya banyoka, nani alakisaki bino kokima kanda oyo ezali koya ?

[8] Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.

[9] Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa, mpe nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. »

[10] Ebele ya bato batunaki ye : — Tosengeli kosala nini ?

[11] Yoane azongiselaki bango : — Tika ete moto oyo azali na kazaka mibale apesa moko na moto oyo azangi kazaka, mpe tika ete moto oyo azali na bilei akabola na bato oyo bazangi bilei.

[12] Bafutisi mpako mpe bayaki mpo ete babatisa bango ; batunaki Yoane : — Moteyi, tosengeli kosala nini ?

[13] Azongiselaki bango : — Tango bofutisaka mpako, bobakisaka mbongo mosusu te na likolo ya oyo esengeli kofutama.

[14] Basoda mpe batunaki ye : — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? Yoane azongiselaki bango : — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino.

[15] Lokola bato bazalaki kozela na elikya makasi, moko na moko azalaki komituna na se ya motema soki Yoane te nde azali Masiya.

[16] Yoane azongiselaki bango : — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto.

[17] Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te.

[18] Yoane azalaki lisusu kolendisa bato mpe koteya bango Sango Malamu na nzela ya maloba mosusu ebele.

[19] Kasi Yoane apamelaki mokonzi Erode mpo ete azwaki na libala Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo ete asalaki lisusu mabe ebele.

[20] Na likolo ya mabe nyonso oyo Erode asalaki, abakisaki lisusu mabe ya kokanga Yoane kati na boloko.

[21] Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki,

[22] mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. »

[23] Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi ; Jozefi, mwana mobali ya Eli ;

[24] Eli, mwana mobali ya Matati ; Matati, mwana mobali ya Levi ; Levi, mwana mobali ya Meliki ; Meliki, mwana mobali ya Yanai ; Yanai, mwana mobali ya Jozefi ;

[25] Jozefi, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Amosi ; Amosi, mwana mobali ya Naumi ; Naumi, mwana mobali ya Esili ; Esili, mwana mobali ya Nagai ;

[26] Nagai, mwana mobali ya Maati ; Maati, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Semeini ; Semeini, mwana mobali ya Yoze ; Yoze, mwana mobali ya Yoda ;

[27] Yoda, mwana mobali ya Yoanani ; Yoanani, mwana mobali ya Reza ; Reza, mwana mobali ya Zorobabeli ; Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Shealitieli, mwana mobali ya Neri ;

[28] Neri, mwana mobali ya Meliki ; Meliki, mwana mobali ya Adi ; Adi, mwana mobali ya Kosami ; Kosami, mwana mobali ya Elimadami ; Elimadami, mwana mobali ya Eri ;

[29] Eri, mwana mobali ya Jozue ; Jozue, mwana mobali ya Eliezeri ; Eliezeri, mwana mobali ya Yorimi ; Yorimi, mwana mobali ya Matati ; Matati, mwana mobali ya Levi ;

[30] Levi, mwana mobali ya Simeoni ; Simeoni, mwana mobali ya Yuda ; Yuda, mwana mobali ya Jozefi ; Jozefi, mwana mobali ya Yonami ; Yonami, mwana mobali ya Eliakimi ;

[31] Eliakimi, mwana mobali ya Meleya ; Meleya, mwana mobali ya Mena ; Mena, mwana mobali ya Matata ; Matata, mwana mobali ya Natani ; Natani, mwana mobali ya Davidi ;

[32] Davidi, mwana mobali ya Izayi ; Izayi, mwana mobali ya Obedi ; Obedi, mwana mobali ya Boazi ; Boazi, mwana mobali ya Salimoni ; Salimoni, mwana mobali ya Nashoni ;

[33] Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini ; Adimini, mwana mobali ya Arini ; Arini, mwana mobali ya Etsironi ; Etsironi, mwana mobali ya Peretsi ; Peretsi, mwana mobali ya Yuda ;

[34] Yuda, mwana mobali ya Jakobi ; Jakobi, mwana mobali ya Izaki ; Izaki, mwana ya Abrayami ; Abrayami, mwana mobali ya Tera ; Tera, mwana mobali ya Naori ;

[35] Naori, mwana mobali ya Serugi ; Serugi, mwana mobali ya Rewu ; Rewu, mwana mobali ya Pelegi ; Pelegi, mwana mobali ya Eberi ; Eberi, mwana mobali ya Shela ;

[36] Shela, mwana mobali ya Kayinami ; Kayinami, mwana mobali ya Aripakishadi ; Aripakishadi, mwana mobali ya Semi ; Semi, mwana mobali ya Noa ; Noa, mwana mobali ya Lemeki ;

[37] Lemeki, mwana mobali ya Matusalemi ; Matusalemi, mwana mobali ya Enoki ; Enoki, mwana mobali ya Yeredi ; Yeredi, mwana mobali ya Malaleeli ; Malaleeli, mwana mobali ya Kenani ;

[38] Kenani, mwana mobali ya Enoshi ; Enoshi, mwana mobali ya Seti ; Seti, mwana mobali ya Adamu ; Adamu, mwana mobali ya Nzambe.

Sango Malamu kolanda Luka — Chapters