Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 8:43

[1] Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki : — Bosangana mpo ete nakoka koyebisa bino makambo oyo ekokomela bino na mikolo oyo ekoya.

[2] Bosangana mpe boyoka, bana mibali ya Jakobi ! Boyoka oyo tata na bino Isalaele akoloba :

[3] « Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso, makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai ; oleki na lokumu mpe na nguya.

[4] Mobulu lokola mayi, okokende liboso te, pamba te omataki na mbeto ya tata na yo, esika oyo ngai nalalaka, mpe okomisi yango mbindo.

[5] Simeoni mpe Levi bazali bandeko, mipanga na bango ezali bibundeli mpo na kotia mobulu.

[6] Molimo na ngai, kosangana te na mabongisi na bango ya kosala mabe ! Lokumu na ngai, kokota te na lisanga na bango ! Pamba te na kanda na bango, babomaki bato ; mpe na esengo na bango, basepelaki kokata misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.

[7] Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi ! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa ! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.

[8] Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo, loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo ; bana mibali ya tata na yo bakogumbama liboso na yo.

[9] Yuda, ozali mwana ya nkosi ; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ?

[10] Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.

[11] Akokanga ane na ye na nzete ya vino, mpe mwana ya ane na etape oyo ye akopona ; akosukola bilamba na ye na vino ; mpe kazaka na ye, na masanga ya vino ya motane.

[12] Miso na ye ekozala motane koleka vino, mpe minu na ye ekozala pembe koleka miliki.

[13] Zabuloni akowumela pene ya ebale monene, eteni ya mabele na ye ekozala libongo ya masuwa, mpe mabele na ye ekokende kino na Sidoni.

[14] Isakari azali ane ya makasi oyo elali kati na mapango mibale.

[15] Amonaki ete bopemi ezali malamu, mpe mokili na ye ezali kitoko ; boye mapeka na ye ekomema mikumba mpe abongi mpo na misala ya bowumbu.

[16] Dani akokamba bato na ye lokola moko kati na bikolo ya Isalaele.

[17] Dani akozala lokola nyoka na balabala to lokola etupa na nzela, oyo eswaka litindi ya mpunda mpo ete motambolisi na yango akweya.

[18] Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai !

[19] Gadi, banguna ebele bakobundisa ye, kasi ye mpe akobundisa bango kino kobengana bango.

[20] Bilei oyo ekobima na mokili ya Aseri ekozala ebele penza ; mabele na ye ekobota biloko oyo ebongi mpo na bakonzi.

[21] Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi, oyo ebotaka bana kitoko.

[22] Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi, nzete oyo ezalaka pembeni ya etima, mpe oyo bitape na yango elekaka bosanda ya mir.

[23] Banguna batumbolaki ye, babwakelaki ye makonga mpe babundisaki ye ;

[24] kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye, mpe maboko na ye etikalaki kolenga te mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi, oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele.

[25] Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo ! mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo ; na mapamboli ya bozindo, na se ; na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.

[26] Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya koleka mapamboli ya bangomba ya kala, koleka bomengo ya bangomba mike ya kala ; tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi, ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye !

[27] Benjame azali lokola mbwa ya zamba ; na tongo, apasolaka mosuni na ye ; na pokwa, akabolaka bomengo ya bitumba. »

[28] Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.

[29] Jakobi apesaki bango malako oyo : « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti,

[30] kati na lidusu ya mabanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, na mokili ya Kanana, elanga oyo Abrayami asombaki na Efroni, moto ya Iti, lokola lilita.

[31] Ezalaki kuna nde bakundaki Abrayami mpe Sara, mwasi na ye ; Izaki mpe Rebeka, mwasi na ye. Ezali kuna nde ngai nakundaki Lea.

[32] Elanga mpe lidusu ya mabanga oyo ezali kati na yango esombamaki epai ya bato ya Iti. »

[33] Tango Jakobi asilisaki kopesa malako epai ya bana na ye, asembolaki makolo na ye na mbeto, akataki motema mpe akendeki kokutana na batata na ye.

Ebandeli — Chapters