Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 6:21

[1] Kokende sango ya malamu eleki malasi ya solo kitoko na motuya, mpe mokolo ya kufa eleki mokolo ya mbotama na malamu.

[2] Kokende na ndako ya matanga ezali malamu koleka kokende na ndako oyo ezali na feti, pamba te kufa ezali suka ya moto nyonso ; yango wana, bato nyonso oyo bazali na bomoi basengeli kokanisaka na tina na yango.

[3] Mawa eleki koseka na malamu, pamba te elongi ya mawa eyeisaka motema esengo.

[4] Motema ya moto ya bwanya ezalaka kati na ndako ya matanga, kasi motema ya zoba ezalaka kati na ndako ya bisengo.

[5] Koyoka pamela ya moto ya bwanya ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.

[6] Koseka ya bazoba ezalaka lokola makelele ya basende oyo ezali kozika na se ya nzungu ; wana mpe ezali pamba.

[7] Minyoko ekomisaka moto ya bwanya zoba, mpe bakado epengwisaka motema.

[8] Suka ya likambo ezali malamu koleka ebandeli ya likambo ; kokanga motema ezali malamu koleka lolendo.

[9] Kotombokaka noki te, pamba te kanda evandaka kati na bazoba.

[10] Kolobaka te : « Mpo na nini mikolo eleki ezali malamu koleka mikolo ya lelo ? » Pamba te bwanya etindaka te bato kotuna mituna ya boye.

[11] Bwanya ezali lokola libula, ezalaka malamu mpe epesaka litomba na bato oyo bamonaka moyi.

[12] Bwanya ezali lokola nguba, ndenge mpe mosolo ezalaka nguba ; kasi litomba ya boyebi ezali ete ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango.

[13] Tala malamu misala ya Nzambe : Nani akoki kosembola eloko oyo Ye asili kogumba ?

[14] Na mokolo ya malamu, sepela ; na mokolo ya mabe, kanisa ; pamba te Nzambe nde asala nyonso mibale mpo ete moto ayeba te makambo oyo ekoya sima na ye.

[15] Na mikolo ya pamba ya bomoi na ngai, namonaki makambo oyo nyonso : Moto ya sembo akufi mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe awumeli na bomoi mpo na mabe na ye.

[16] Kolekisa ndelo te ya kozala moto ya sembo to ya kozala moto ya bwanya ; mpo na nini komibebisa ?

[17] Kolekisa ndelo te ya kozala moto mabe to ya kozala zoba ; mpo na nini kokufa liboso ete mikolo ya bomoi na yo ekoka ?

[18] Ezali malamu kokangama na toli ya liboso mpe kosimba toli ya mibale, pamba te moto oyo atosaka Nzambe akosalela toli nyonso mibale.

[19] Bwanya ekomisaka moto oyo azali na yango makasi koleka bakambi zomi kati na engumba.

[20] Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu, bongo azanga kosala masumu.

[21] Kotiaka matoyi na bilobaloba ya bato te, noki te okoyoka mosali na yo kotiola yo ;

[22] pamba te, oyebi malamu, kati na motema na yo, ete yo mpe otiolaka bato mosusu mbala mingi.

[23] Namekaki kososola makambo wana nyonso na nzela ya bwanya, namilobelaki : « Nakosala nyonso mpo ete nakoma moto ya bwanya, » kasi bwanya ezalaki kaka mosika na ngai.

[24] Nyonso oyo ezalisami ezali mosika, mozindo mpe mozindo makasi ; nani akoki komona yango ?

[25] Boye, na motema na ngai mobimba, namipesaki mpo na kososola, koyeba, koluka bwanya mpe boyebi ; mpe mpo na kososola bozoba ya mabe elongo na liboma ya bozoba.

[26] Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.

[27] Mosakoli alobi : « Tala makambo oyo nasosoli sima na koyekola mwasi moko na moko mpo na kozwa mayele :

[28] Nazali koluka, kasi nanu namoni te. Namoni mobali moko ya sembo kati na mibali nkoto moko, kasi namoni ata mwasi moko te ya sembo kati na basi nyonso !

[29] Tala makambo oyo nasosoli : Nzambe asala bato mpo ete bazala malamu, kasi bato bamilukelaka mindondo bango moko. »

Mosakoli — Chapters