Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 11:08

[1] Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.

[2] Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi.

[3] Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba ; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.

[4] Bandimi oyo bapalanganaki bazalaki koteya Liloba na Nzambe bisika nyonso bazalaki kokende.

[5] Filipo akendeki na engumba moko ya Samari mpe, kuna, ateyaki Klisto.

[6] Bongo tango ebele ya bato bayokaki mpe bamonaki bikamwa oyo asalaki, bakangamaki na makambo oyo Filipo azalaki koloba.

[7] Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki.

[8] Boye, bato ya engumba yango batondisamaki na esengo makasi.

[9] Nzokande, wuta kala, kati na engumba yango, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona. » Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato ya Samari mpe komimona moto monene.

[10] Bato nyonso, kobanda na bana mike kino na mikolo, bayokaki ye na bokebi mpe balobaki : « Moto oyo, azali penza nguya ya Nzambe, nguya oyo babengaka : Nguya monene. »

[11] Bazalaki kolanda ye mpo ete, wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji.

[12] Kasi tango bandimaki Sango Malamu oyo Filipo ateyaki na tina na Bokonzi ya Nzambe mpe na tina na Kombo na Yesu-Klisto, mibali mpe basi bazwaki libatisi.

[13] Simona mpe andimaki mpe azwaki libatisi ; azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalema na miso na ye.

[14] Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane.

[15] Tango bakomaki kuna, basambelaki mpo na bandimi ya sika mpo ete bazwa Molimo Mosantu,

[16] pamba te Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango ; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.

[17] Bongo, Petelo mpe Yoane batielaki bango maboko, mpe bazwaki Molimo Mosantu.

[18] Tango Simona amonaki ete bato oyo bandimaki bazwaki Molimo Mosantu, wana bantoma batielaki bango maboko, apesaki Petelo mpe Yoane mbongo ;

[19] mpe alobaki : — Bopesa ngai mpe nguya oyo, mpo ete moto nyonso oyo nakotiela maboko akoka kozwa Molimo Mosantu.

[20] Kasi Petelo azongiselaki ye : — Mpo ete okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na nzela ya mbongo, tika ete yo mpe mbongo na yo bokufa !

[21] Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe.

[22] Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo.

[23] Pamba te namoni ete motema na yo etondi na zuwa mpe ozali mowumbu ya masumu.

[24] Simona azongisaki : — Bobondela Nkolo mpo na ngai mpo ete, kati na oyo bowuti koloba, eloko moko te ekomela ngai.

[25] Sima na bango kotatola mpe kosakola Liloba na Nkolo, Petelo mpe Yoane bazongaki na Yelusalemi ; na nzela, bazalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka ebele ya Samari.

[26] Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo : — Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza.

[27] Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki ; na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, moto ya mboka Etiopi ; azalaki kalaka moko ya lokumu mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mwasi mokonzi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kogumbamela ;

[28] bongo wana azalaki kozonga na mboka na ye, azalaki ya kovanda kati na shar na ye mpe azalaki kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi.

[29] Molimo alobaki na Filipo : — Kende mpe pusana pene ya shar wana.

[30] Filipo akendeki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Filipo atunaki ye : — Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga ?

[31] Azongisaki : — Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te ? Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.

[32] Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.

[33] Basambwisaki ye mpe baboyaki kolongisa ye. Nani akoyebisa bakitani na ye ? Pamba te balongoli bomoi na ye na mokili. »

[34] Bongo, soda oyo baboma nzoto ya mibali atunaki Filipo : — Nabondeli yo, yebisa ngai : mosakoli azali koloba makambo oyo na tina na nani ? Azali koloba yango na tina na ye moko to na tina na moto mosusu ?

[35] Filipo azwaki maloba mpe, na nzela ya eteni yango ya Makomi, ateyaki ye Sango Malamu ya Yesu.

[36] Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki : — Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi ? [

[37] Filipo alobaki : — Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi. Moto yango azongisaki : — Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe !]

[38] Mbala moko, apesaki mitindo ete batelemisa shar. Bongo bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo, bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye.

[39] Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te, kasi akobaki mobembo na ye na esengo.

[40] Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti ; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.

Misala ya Bantoma — Chapters