Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 4:58

[1] Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ;

[2] pamba te Nzambe alobi : « Na tango ya malamu, nayanolaki yo ; mpe na mokolo ya lobiko, nasungaki yo. » Nzokande, tango ya malamu ezali nde sik’oyo ; mokolo ya lobiko ezali nde lelo.

[3] Tobetisaka moto moko te mabaku, mpo ete mabe elobama te na tina na lotomo na biso.

[4] Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;

[5] kati na kobetama, boloko mpe mobulu ; kati na misala makasi, kozanga kolala mpe kokila bilei ;

[6] kati na bopeto, boyebi, kokanga motema mpe boboto ; kati na Molimo Mosantu mpe bolingo ya solo ;

[7] kati na Liloba ya bosolo mpe nguya ya Nzambe ; kati na bibundeli ya bosembo mpo na kobundisa monguna mpe komibatela ;

[8] kati na lokumu mpe soni, kosakolama lokola bato malamu mpe lokola bato mabe. Mpe lisusu, kati na koyebana lokola bato oyo balobaka lokuta, nzokande tolobaka solo ;

[9] koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi ; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi ; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te ;

[10] koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.

[11] Bandeko ya Kolinto, tolobi na bino na bosembo nyonso mpe na mitema ya kofungwama.

[12] Tozali kobombela bino te bolingo na biso, kasi bino bozali kobombela biso oyo ya bino.

[13] Nazali koloba na bino lokola na bana na ngai ya bolingo : Bosala lokola biso ! Bino mpe bofungolela biso mitema na bino !

[14] Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ?

[15] Klisto akoki solo koyokana na Satana ? Eloko nini ekoki kosangisa mondimi elongo na moto oyo azangi kondima ?

[16] Boyokani nini ekoki kozala kati na Tempelo ya Nzambe mpe banzambe ya bikeko ? Pamba te biso tozali Ndako ya Nzambe na bomoi, kolanda maloba na Ye moko : « Nakovanda kati na bango mpe nakotambola elongo na bango. Nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na ngai. »

[17] Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »

[18] Mpe, « Nakozala Tata mpo na bino, mpe bino bokozala bana mibali mpe bana basi mpo na ngai, elobi Nkolo, Mokonzi ya mampinga. »

Mokanda ya mibale epai ya Bakolinto — Chapters