Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:33

[1] Jozafati, mwana mobali ya Asa, akitanaki na tata na ye na bokonzi mpe alendisaki makasi na ye mpo na kobundisa Isalaele.

[2] Atiaki mampinga na ye kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi ; mpe atiaki masanga ya basoda kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba ya Efrayimi oyo Asa, tata na ye, abotolaki.

[3] Yawe azalaki elongo na Jozafati mpo ete, na eteni ya liboso ya bomoi na ye, alandaki ndakisa ya Davidi, tata na ye, mpe amipesaki te na banzambe Bala.

[4] Kasi alukaki Nzambe ya tata na ye mpe atosaki mibeko na Ye : alandaki te makambo oyo ezalaki kosalema kati na Isalaele.

[5] Yawe alendisaki bokonzi oyo ezalaki na maboko ya Jozafati, mpe Yuda mobimba ezalaki komemela ye bakado. Akomaki na bozwi ebele mpe atondaki na lokumu.

[6] Motema na ye esepelaki makasi kotambola na banzela ya Yawe kino kolongola kati na Yuda bisambelo ya likolo ya bangomba mpe makonzi ya Ashera.

[7] Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, atindaki bakalaka na ye koteya bavandi ya bingumba ya Yuda. Ezalaki Beni-Ayili, Abidiasi, Zakari, Netaneeli mpe Mishe.

[8] Atindaki elongo na bango Balevi oyo libwa : Shemaya, Netania, Zebadia, Asaeli, Shemiramoti, Jonatan, Adoniya, Tobiya mpe Tobi-Adoniya ; elongo na Banganga-Nzambe Elishama mpe Yorami.

[9] Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato.

[10] Somo ya Yawe ekangaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, mpe ekokaki lisusu te kobundisa Jozafati.

[11] Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi ; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo.

[12] Wana nguya ya bokonzi ya Jozafati ekobaki kaka koya makasi, atongaki kati na Yuda bandako makasi mpe bingumba ya kobomba biloko.

[13] Kati na bingumba ya Yuda, azalaki na biloko ebele ya kolia ; mpe kati na Yelusalemi, atiaki basoda ya mpiko.

[14] Tala motango na bango kolanda mabota na bango : Kati na libota ya Yuda, bakonzi ya bankoto : Adina, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama misato ;

[15] sima na ye, Yoanani : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale na tuku mwambe ;

[16] sima na ye, Amasia, mwana mobali ya Zikiri, oyo amikabaki ye moko epai na Yawe : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale.

[17] Kati na libota ya Benjame : Eliyada, elombe ya bitumba, azalaki mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale oyo bazalaki na matolotolo mpe na banguba ;

[18] Yozabadi, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama moko na tuku mwambe.

[19] Bato oyo nyonso bazalaki kosala epai ya mokonzi lokola bakonzi ya basoda ya mpiko, bakisa ba-oyo mokonzi atiaki kati na bingumba batonga makasi ya Yuda mobimba.

2 Masolo ya Kala — Chapters