[1] Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso,
[2] mpo na bakonzi mpe mpo na bakambi nyonso, mpo ete tokoka kobika bomoi ya boboto, ya kimia, ya botosi kati na makambo ya Nzambe, mpe bomoi ya bosantu.
[3] Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso,
[4] oyo alingi ete bato nyonso babikisama mpe bayeba solo.
[5] Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato : ezali moto moko, Yesu-Klisto
[6] oyo amikabaki lokola mbeka mpo na kokangola bato nyonso. Yango nde litatoli oyo epesamaki na tango oyo abongisa.
[7] Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.
[8] Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.
[9] Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,
[10] kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.
[11] Na tango ya mateya, basi basengeli kovanda nye mpe kozala na botosi.
[12] Napesi te na mwasi nzela ya koteya to ya kozala na bokonzi na likolo ya mobali ; mwasi asengeli nde kovanda nye.
[13] Solo Nzambe asalaki liboso Adamu, mpe sima, Eva.
[14] Ezali Adamu te moto akosamaki ; ezali mwasi nde akosamaki mpe abukaki mobeko ya Nzambe,
[15] kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.