Skip to content
Opens in a new window
Listen to this chapter • 5:49

[1] Mpe mpo na oyo etali tango to mokolo, bandeko, tomoni ete ezali na tina te ya kokomela bino,

[2] pamba te boyebi malamu ete mokolo ya Nkolo ekoya ndenge moyibi ayaka kati na butu.

[3] Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.

[4] Kasi bino bandeko, bozali kati na molili te mpo ete mokolo yango ekanga bino na mbalakata lokola moyibi.

[5] Pamba te bino nyonso bozali bana ya pole mpe bana ya moyi. Tozali bato ya butu te to bato ya molili te.

[6] Yango wana tolalaka pongi te lokola bato mosusu, kasi tosenzelaka mpe tomibatelaka malamu.

[7] Pamba te bato oyo balalaka pongi balalaka na butu, mpe ba-oyo balangwaka masanga balangwaka na butu.

[8] Kasi lokola tozali bato ya moyi, tika ete tosenzela malamu, tolata kondima mpe bolingo lokola ebombelo ya tolo, mpe tolata elikya ya lobiko lokola ekoti ya ebende.

[9] Pamba te Nzambe abongisa biso te mpo na kanda na Ye, kasi mpo ete tozwa lobiko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,

[10] oyo akufelaki biso mpo ete, ezala soki tozali na bomoi to tokufi, tozala na bomoi elongo na Ye.

[11] Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.

[12] Bandeko, tosengi na bino ete bondimaka bato oyo basalaka mosala makasi kati na bino, oyo bamitungisaka mpo na bino kati na Nkolo mpe bapesaka bino makebisi.

[13] Bomemiaka bango makasi kati na bolingo mpo na mosala na bango. Bobikaka na kimia kati na bino.

[14] Bandeko, tozali kolendisa bino : bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.

[15] Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.

[16] Bozalaka na esengo tango nyonso ;

[17] bosambelaka na kolemba te ;

[18] bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.

[19] Bopekisaka te mosala ya Molimo Mosantu,

[20] botiolaka masakoli te

[21] kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu.

[22] Boboyaka mabe ya lolenge nyonso.

[23] Tika ete Ye moko Nzambe ya kimia abulisa bino na mobimba na bino ! Tika ete mobimba na bino, molimo, elimo mpe nzoto ebatelama malamu na lolenge ete ezanga pamela na mokolo oyo Yesu-Klisto, Nkolo na biso, akoya.

[24] Ye oyo azali kobenga bino azali sembo, mpe Ye nde akokokisa yango.

[25] Bandeko, bobondelaka mpo na biso.

[26] Bopesaka bandeko nyonso mbote na nzela ya beze ya bule.

[27] Nasengi na bino, na Kombo ya Nkolo, ete botangelaka bandeko nyonso mokanda oyo.

[28] Tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala na bino !

Mokanda ya liboso epai ya Batesalonika — Chapters